Pusaná penepene na Nzambe
“Nayebi malamu bampasi oyo bazali komona”
“YEHOVA azali mosantu, mosantu, mosantu.” (Yisaya 6:3, NW) Maloba wana emonisi ete Yehova Nzambe azali pɛto mpe bulɛɛ na ndenge ya kokoka mpenza. Kasi okoki komituna boye: ‘Lokola Nzambe azali mosantu, akipaka te makambo ya bato? Nzambe oyo azali mosantu ndenge wana akoki mpenza komibanzabanza mpo na ngai, moto ya masumu mpe ya kozanga kokoka?’ Tótala makambo oyo Nzambe ayebisaki Moize, oyo ezali na Exode 3:1-10.
Mokolo moko ntango azalaki koleisa bampate, Moize amonaki likambo moko ya kokamwa: mwa nzete ya nzubɛ ezalaki kopela mɔtɔ “nde ezikaki te.” (Vɛrsɛ 2) Lokola alingaki koyeba soki ezali nini, apusanaki mpo atala. Na nzela ya anzelu, Yehova alobaki na Moize na kati ya mɔtɔ ete: “Obɛlɛma te. Longolá mapapa na yo na matambe na yo mpo ete esika ezali yo kotɛlɛma ezali mabelé [mosantu, NW].” (Vɛrsɛ 5) Kanisá naino: lokola mwa nzete wana oyo ezalaki kopela mɔtɔ emonisaki ete Nzambe azali wana, esika wana mpe ekómaki mosantu!
Ezalaki na ntina oyo Nzambe mosantu asololaki na Moize. Alobaki boye: “Ya solo, namoni mpasi ya bato na ngai oyo bazali na Ezipito, mpe nayoki kolela na bango mpo na bato oyo bazali kosalisa bango mosala makasi; mpamba te nayebi malamu bampasi oyo bazali komona.” (Vɛrsɛ 7, NW) Nzambe ayebaki mpasi ya bato na ye; azalaki mpe koyoka kolela na bango. Kutu, mpasi na bango ekómaki ya ye. Yoká ndenge Nzambe alobaki: “Nayebi malamu bampasi oyo bazali komona.” Mpo na maloba “nayebi malamu,” buku moko elobi ete: “Maloba yango elimboli komitya na esika ya moto oyo azali na mpasi, koyoka mawa.” Maloba oyo Yehova ayebisaki Moize emonisi mpenza ete azali Nzambe oyo amibanzabanzaka mpo na bato.
Nzambe asukaki kaka te na koyokela bango mawa mpe koyoka kolela na bango. Asalaki nini? Asalisaki bango. Azwaki ekateli ya kobimisa bato na ye na Ezipito mpe kokɔtisa bango na “mokili eleki na [miliki, NW] mpe na mafuta ya nzoi.” (Vɛrsɛ 8) Mpo na yango, Yehova apesaki Moize mokumba oyo: “Obimisa bato na ngai . . . na Ezipito.” (Vɛrsɛ 10) Moize akokisaki mokumba yango, abimisaki Bayisalaele na Ezipito na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.).
Yehova abongwani te. Baoyo bazali kosambela ye lelo bakoki kozala na elikya ete amonaka minyoko na bango mpe ayokaka kolela na bango. Ayebi malamu bampasi oyo bazali komona. Kasi, Yehova asukaka kaka te na koyokela basaleli na ye mawa. Mawa ya Nzambe etindaka ye asalisa bango “mpamba te ye atyelaka [bango] likebi.”—1 Petelo 5:7.
Motema wana ya Nzambe ezali kopesa biso elikya. Na lisalisi na ye, biso bato ya kozanga kokoka tokoki kozala na likoki ya koyokanisa bomoi na biso na mitinda na ye ya pɛto mpe kondimama na ye. (1 Petelo 1:15, 16) Lisolo oyo elobeli ndenge Moize amonaki mwa nzete ya nzubɛ oyo ezalaki kopela mɔtɔ ebɔndisaki ndeko mwasi moko oyo alɛmbaki nzoto mpe azalaki konyokwama na makanisi. Alobaki boye: “Soki Yehova akoki kosala ete ata eloko lokola mabelé ekóma mosantu, nakoki kozala na elikya. Likanisi yango esalisi ngai mingi.”
Okosepela koyeba makambo mosusu na ntina na Yehova, Nzambe mosantu? Okoki kozala na boyokani malamu na Yehova, mpamba te “ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele putulu.”—Nzembo 103:14.