Oyebaki yango?
Makanisi ya Nzambe ezalaki nini ntango Bayisalaele bakómaki kotalela minzoto mpo na koyeba makambo ekoya?
Ntango mabelé ebalukaka zingazinga ya moi mbula na mbula, emonanaka lokola nde minzoto mpe ezali kobaluka. Banda na ntango ya kala, bato bazalaki kolanda mbongwana wana mpe bazalaki koloba ete ezali na ndimbola monene mpo na bango.
Ekoki kozala ete momeseno ya kotalela minzoto mpo na koyeba makambo ekoya ebandaki epai ya bato ya Babilone, oyo bazalaki kosambela minzoto mpe maboke ya minzoto. Bayisalaele bakómaki kosambela minzoto ntango batikaki losambo ya solo. Na boyangeli ya mokonzi ya Yuda, Yosiya, momeseno ya kotalela minzoto mpo na koyeba makambo ekoya epanzanaki mingi. Likanisi ya Nzambe na likambo yango ezalaki polele. Bikeke mingi liboso, mibeko oyo Nzambe apesaki Moize emonisaki ete moto oyo akosambela minzoto asengeli kobomama.—Deteronome 17:2-5.
Na kati ya bikateli oyo Mokonzi Yosiya azwaki mpo na kolongola mimeseno ya mbindo na losambo ya Bayuda, apekisaki kopesaka bambeka epai “na moi mpe na sanza mpe minzoto minene mpe na [mampinga] mobimba ya lola.” Biblia elobi ete mokonzi azwaki ekateli wana mpo alingaki ‘kotambola nsima ya Yehova mpe kobatela malako na ye.’ (2 Mikonzi 23:3-5) Likambo yango ezali mpe ndakisa mpo na baoyo balingi kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo” lelo oyo.—Yoane 4:24.
“Bana ya Zeusi” oyo Misala 28:11 elobeli ezalaki banani?
Mokanda ya Misala elobi ete mpo na kokende na Loma, ntoma Paulo alongwaki na Malta mpe akendaki na Puteoli na masuwa moko oyo ezalaki na elembo “Bana ya Zeusi” na motó na yango. (Misala 28:11) Bato mingi ya masuwa mpe bato ya mibembo ya ntango wana bazalaki kotambola na ekeko ya bana ya Zeusi.
Masapo ya Bagrɛki mpe ya Baloma elobaka ete Zeusi (oyo ayebani mpe na nkombo Jupiter) ná Leda babotaki bana mapasa, Castor ná Pollux. Bato mingi bazalaki mpe kotalela “bana [wana] ya Zeusi” lokola bato ya masuwa oyo bayebaki mosala malamu mpe bazalaki na nguya ya kokitisa mopɛpɛ mpe mbonge. Na yango, bato bakómaki kosambela bango lokola banzambe oyo babatelaka bato ya masuwa. Bato ya mibembo bazalaki kopesa bana yango bambeka mpe kosɛnga bango bábatela bango na ntango ya mipɛpɛ makasi. Bato mingi bazalaki kondima ete mapasa yango oyo bazalaki banzambe bazalaki komonisa nguya na bango ya kobikisa ntango bazalaki komilakisa lokola mɔtɔ oyo ezalaki kobengama Saint-Elme, kura oyo mbala mosusu ezalaki kobima na banzete oyo esimbaka masuwa, na ntango ya mopɛpɛ makasi.
Losambo ya Castor ná Pollux epanzanaki mingi epai ya Bagrɛki mpe Baloma, mpe buku moko ya kala elobi ete losambo yango ezalaki mpe na etúká moko oyo ezali pembeni ya Cyrène, na Afrika ya Nɔrdi. Masuwa oyo mokanda ya Misala elobeli eutaki mosika te, na Alezandria, na Ezipito.
[Elilingi na lokasa 9]
Libanga moko ya Babilone oyo ezali na elilingi ya Mokonzi Nazimaruttash asimbi maboke ya minzoto
[Elilingi na lokasa 9]
Badenali ya ebende oyo ezali na elilingi ya “Bana ya Zeusi,” 114-113 L.T.B.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]
Libanga: Réunion des Musées Nationaux/Art Resource, NY; mbongo ya ebende: Na ndingisa ya Classical Numismatic Group, Inc./cngcoins.com