Kaka Nzambe nde akoki kobikisa mabelé
“ELOKO MOKO YA LANGI YA BULE MPE MPƐMBƐ OYO EZALI KONGƐNGA LOKOLA BIJU.” Ezali ndenge wana nde Edgar Mitchell, astronote moko, alobaki mpo na mabelé ntango azalaki na likoló.
Nzambe asalaki nyonso mpo na kobongisa mabelé mpo bato báfanda wana. Nsima ya kosala yango, baanzelu “bagangaki na esengo.” (Yobo 38:7) Soki toyekoli ndenge mabelé esalemá, biso mpe tokoki koganga na esengo. Ezali na makambo ndenge na ndenge ya kokamwa oyo esalaka ete bomoi ezala na mabelé. Moko na yango oyo eyebani mingi ezali ndenge matiti esalelaka moi, gaz carbonique oyo eutaka na mopɛpɛ, mpe mai mpo na kosala bilei. Nsima na yango, ebimisaka oxygène, mopɛpɛ ya ntina mingi oyo topemaka.
Biblia emonisi ete Nzambe apesaki moto mokumba ya kobatela mabelé. (Genese 1:28; 2:15) Nzokande, mpo mabelé ekoba kozala malamu, moto asengelaki kozala na makanisi oyo ebongi. Kutu, asengelaki nde kolinga mabelé. Asengelaki kobatela yango mpo etikala kitoko. Kasi, Nzambe akelaki moto na bonsomi ya kopona; yango wana moto akokaki mpe kopona kobebisa mabelé. Kutu, yango nde asalaki. Kozanga kobatela mabelé mpe lokoso ya moto esali ete mabelé ebeba mpenza.
Talá mwa makambo oyo ebebisi mabelé: (1) Kokatakata banzete ezali kopekisa mabelé ebendaka gaz carbonique, mpe yango esali ete moi to malili eleka makasi na bisika mosusu. (2) Kosopa bankisi ntango nyonso na banzete to matiti ekómi koboma ata banyama-nkɛkɛ oyo esalaka mosala mingi na milona, na ndakisa kobotisa mbuma. (3) Koboma mbisi ntango nyonso mpe kosopa bagaze na mbu mpe na bibale ezali kosilisa mbisi. (4) Ndenge oyo bato bazali kozwa na lokoso biloko ya motuya ya mabelé ezali kosilisa biloko oyo ekoki kosalelama na mikolo ezali koya mpe bato mosusu balobi ete yango ezali kosala ete mabelé ekóma na molunge makasi. Bato mosusu oyo bayekolaka mabelé balobi ete ndenge maboke minene ya ngalasi ezali kopanzana na Arctique mpe na Antarctique ezali komonisa ete molunge ekómi makasi na mabelé.
Lokola makama ndenge na ndenge ekómi kosalema mingi na mabelé, bato mosusu bakoki koloba ete mabelé ebebi, yango wana ekómi kobimisela bato bampasi. Nzambe apesaki bato mabelé ofele. (Genese 1:26-29) Kasi, makambo oyo ezali kosalema na mokili ezali komonisa ete bato mingi bazali na mposa te ya kobatela mabelé, esika kitoko oyo Nzambe apesá bango. Kutu, moto amipesi kaka na kokokisa bamposa na ye moko. Na yango, amonisi ete azali mofuteli-ndako moko ya mabe, azali “kobebisa mabelé,” ndenge Emoniseli 11:18 esakolaki yango.
Bisakweli ya Biblia emonisi ete Yehova Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe Mozalisi ya biloko nyonso oyo esalaka ete mabelé ezala malamu, abongisi ntango oyo “akobwaka na libándá” bafuteli-ndako ya mabe. (Sefania 1:14; Emoniseli 19:11-15) Nzambe akotika te ete moto abebisa mabelé na ndenge ya mabe mpenza koleka; akozwa makambo na mabɔkɔ na ngonga oyo tokanisaki te.a (Matai 24:44) Ya solo, kaka Nzambe nde akoki kobikisa mabelé.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu oyo emonisi ete mikolo etikali ya kotánga, talá mwa buku Bókɛngɛlaka! ebimisami na Batatoli ya Yehova.