Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/12 nk. 24-25
  • Elombe moko ya karate abongwani

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elombe moko ya karate abongwani
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • “Yehova abosanaki ngai te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Nasengeli koyekola myango ya kobunda mpo na komibatela?
    Lamuká!—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/12 nk. 24-25

Mokanda euti na Ghana

Elombe moko ya karate abongwani

NAKANISAKI nakokuta ye alati zambala ya mpɛmbɛ, mokaba ya moindo ya santimɛtrɛ 5 na loketo, atɛlɛmi lokola alingi kobunda, akembisi mabɔkɔ mpe apiki makolo. Elongi etondi na nkanda mpe ebimi misisa. Akondisi miso mpe aboyi ata kosɛka mpo bámona te ete alɛmbalɛmba.

Mbala moko, agangi makasi: “Kyayi!” mpe apumbwe. Mabɔkɔ na ye ekati mopɛpɛ na nguya mpenza. Abɛti libaya moko, ebukani mpe ekwei na mabelé. Abandi kopumbwapumbwa, makolo mpe mabɔkɔ epai na epai mpo na kobɛta moto oyo azali kobunda na ye. Ezali mpenza ye moto asɛngi ayekola Biblia?

Natomboli lobɔkɔ mpo na kopesa ye mbote. Natuni boye: “Yo nde Kojo? Namoni ete ozali na mposa ya koyekola Biblia.” Apesi ngai mbote na kosɛka mpe na boboto nyonso alobi ete: “Nazali mpenza na mposa ya koyekola. Tokobanda ntango nini?” Azalaki lisusu na elongi ya kobangisa te, mpe azalaki na mposa makasi ya koyeba.

Tosimbaki Babiblia ná babuku mpe tofandaki na veranda ya ndako na ye. Alobaki: awa ezali malili, makɛlɛlɛ te mpe tokozala kaka biso moko. Tozalaki misato: Ngai, Kojo mpe makako na ye ya moke. Mwa makako yango ezalaki na molai ya santimɛtrɛ 35, ezalaki na mwa nsuki ya motane na motó mpe mandɛfu ya mpɛmbɛ; yango wana ezalaki na elongi ya kosɛkisa mpe ya mobulu. Ezalaki kotambola likoló ya bapapye na biso, kobenda babiki na biso, mpe ntango mosusu kokɔtisa mwa misapi na mabenga ya basimisi na biso mpo na koluka soki ekozwa eloko kuna. Lokola Kojo amesanaki na mobulu ya makako na ye, azalaki kokipe te mpe atyaki makanisi na ye nyonso na boyekoli. Ebele ya mituna oyo azalaki kotuna esalisaki ngai namona ete azali komona mosika mpe azalaki na mposa ya koyeba. Ntango mosusu karate eteyaki ye azala bindimandima te, yango wana azalaki kondima makambo kaka soki amoni yango na kati ya Biblia.

Boyekoli na biso ezalaki koleka malamu mpenza. Nzokande, na nsima, namonaki ete etumba mosusu ebandi na motema na ye. Ayebisaki ngai ete: “Eloko kaka moko oyo nalingaka na mokili oyo ezali karate.” Namonaki ete azalaki kolinga bitumba mingi, mosala oyo amesanaki na yango mpe ayebaki malamu mpenza. Na mbula 26, azalaki kolinga karate mingi mpe akómaki mobundi ya makasi. Akómaki tii ceinture noire, titre oyo bato mingi bakokaka kozwa te.

Nayebaki te ekateli nini Kojo akozwa. Nazalaki komona ete Kojo ayebaki ete moto ya karate, oyo amesani konyokola baninga na mabɔkɔ mpe makolo na ye, akoki te kozala moklisto oyo azali moto ya motema mawa, ya boboto, oyo amityaka na esika ya basusu, makambo oyo emonisaka bolingo ya baklisto ya solo. Kasi, nayebaki ete solo ya Biblia elɛmbisá mitema ya bato mingi ya matata koleka kutu ye. Soki motema ya Kojo ezali malamu, Liloba ya Nzambe ekobongola mpe ye mokemoke mpe akokóma moto ya boboto mpe ya motema mawa. Esengelaki nazala motema mpiɔ.

Mokolo moko nsima ya nzanga, ntango tolingaki kosilisa boyekoli na biso, totángaki mokapo moko ya Biblia oyo eswaki Kojo lokola likɔfi ya monguna moko ya makasi ezwi ye. Atángaki ete: “[Yehova] akomeka moyengebene mpe moto mabe, molimo na ye eyini ye oyo alingi mobulu.” (Nzembo 11:5) Azongelaki lisusu na mongongo ya nse: “Ye oyo alingi mobulu!” Miso ya mabe wana oyo azalaki kotala na yango bato liboso ebongwanaki mbala moko mpe azwaki ekateli. Atalaki ngai na miso, asɛkaki mpe alobaki ete “nakobunda lisusu te.”

Ngai ná Kojo tozali sikoyo kosala mosala oyo tozali kolinga mingi: tozali komipesa na koteya bato oyo balingi koyoka biso mateya ya Biblia ofele. Na ntɔngɔ moko, tozongelaki elenge mobali na nkombo Luka.

Mpo na kokóma epai na ye, tozwaki mwa nzela moko oyo etondá na bato na kati ya zando. Batɛki bazalaka ebele na babalabala ná bamesa na bango. Batɛkaka biloko lokola pilipili oyo etelá ná oyo ya mobesu, bikɔlɔ ya tomati, dongodongo, baradio, mangembu, sabuni, bikɔti ya nsuki (perruque), banzungu, basapato mpe bilamba ya tombola. Bana basi batambolaka na biloko ya kolamba ya nsolo kitoko na mitó. Bapasolaka nzela na kati ya bato, wana bazali koluka kobenda bakiliya na supu na bango ya elɛngi mpe mbisi ya kokauka, nsanya mpe mbɛmbɛ. Bambwa, bantaba mpe nsoso ezali kotambolatambola na kati ya makolo ya bato. Na zando yango, okoyoka makɛlɛlɛ ya baradio, ya mituka mpe ya bato.

Tolandaki mwa nzela moko ya salite mpe totikaki engumba wana ya makɛlɛlɛ mpe tokómaki na ndako moko oyo ebebá. Luka, elenge moko ya bambula 20, atɛlɛmaki na porte mpe asɛngaki biso tókɔta mpo moi ezalaki makasi na libándá. Esika azalaki etondaki na basaki, bakɛsi ya matiti mpe ya misisa ya nzete ya kokauka, maboke ya nkasa mpe mposo ya nzete. Biloko yango ezalaki ya mama nkulutu ya Luka oyo azalaki kosalisa bato na bankisi ya bonkɔkɔ. Mayele ya kosala bankisi wana nyonso eutá na bankɔkɔ ná bankɔkɔ. Azali na bankisi ya kotuta, ya kotɔkisa, oyo ekoki kosalisa maladi ya ndenge nyonso. Luka azalaki kozela biso. Abongisaki esika mpe atyaki bibonga misato. Tofinanaki na mwa esika yango ya nkaka mpe tobandaki koyekola Biblia.

Kojo azalaki koteya Luka. Ngai nafandaki wana mpe nazali koyoka ndenge Kojo azali kolakisa Luka na kati ya Biblia ntina oyo bampasi etondi na mokili. Ntango Kojo azalaki kosalisa Luka azwa mokapo moko ya Biblia, nazalaki kotala ndenge mabɔkɔ na ye ya makasi ezalaki kobalola nkasa wana ya Biblia ya pɛpɛlɛ. Nazongisaki makanisi na nsima mpe namonaki lisusu ndenge mabɔkɔ wana ezalaki kobɛta bato kaka lobilobi awa. Nguya ya Liloba ya Nzambe ezali kolongola bizaleli ya mabe oyo etondi na mokili oyo ya Satana mpe kobongola yango bizaleli ya malamu lokola motema mawa mpe bolingo. Ezali mpenza likamwisi!

Ntango tozalaki kozonga, tosololaki na mobali moko oyo afandaki na nse ya nzete ya manga. Alandaki na likebi ndenge Kojo azalaki kofungola Biblia mpe kotánga. Ntango mobali yango ayebaki ete tozali Batatoli ya Yehova, atɛlɛmaki mbala moko mpe agangaki na nkanda nyonso ete: “Nalingaka bino te!” Kojo asalaki lokola asilika. Na nsima, akitisaki motema mpe asɛngaki bolimbisi. Tosimbaki nzela mpe tokendaki.

Na nzela, Kojo agumbamaki mwa moke mpe ayebisaki ngai na litoi: “Ntango alobaki bongo, motema na ngai ebɛtaki makasi. Oyebi oyo nalingaki kosala ye?” Nasɛkaki mwa moke mpe nayanolaki ye ete: “Nayebi.” Ye mpe asɛkaki mwa moke mpe tokobaki nzela na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto