Mituna ya batángi
Na mokanda na ye epai ya Baebele, ntoma Paulo alobelaki “kotyama mabɔkɔ.” Azalaki kolobela koponama ya bankulutu to nde likambo mosusu?—Ebe. 6:2.
Tokoki te koloba ete azalaki kaka kolobela koponama ya bankulutu to likambo mosusu, kasi ekoki kozala ete Paulo azalaki kolobela kotya bato mabɔkɔ mpo na kopesa bango makabo ya elimo.
Biblia elobelaka kotya bato mabɔkɔ mpo na kopesa bango mikumba na lisangá. Moize atyaki “mabɔkɔ na ye na likoló” ya Yosua ntango aponaki ye mpo azwa esika na ye. (Det. 34:9) Na lisangá ya baklisto, bazalaki kotya mabɔkɔ likoló ya mibali mosusu ya makoki mpo na kopesa bango mikumba. (Mis. 6:6; 1 Tim. 4:14) Paulo alobaki ete esengeli te kowelela kotya mabɔkɔ likoló ya moto.—1 Tim. 5:22.
Kasi, Paulo alendisaki Baebele oyo bakómaki baklisto ete lokola basilaki kotika “mateya ya ebandeli,” basengelaki ‘kokende nokinoki tii na kokɔmela.’ Na nsima, abandaki kotánga makambo lokola “kobongola motema na misala ya kokufa, mpe kondimela Nzambe, mateya etali babatisimo mpe kotyama mabɔkɔ.” (Ebe. 6:1, 2) Koponama ya bankulutu nde ezali likambo ya ebandeli oyo baklisto basengelaki kotika mpo bákende nokinoki tii na kokɔmela? Te. Ezali likambo ya ebandeli te, kasi ezali nde mokumba oyo bandeko mibali oyo bakɔmeli basengeli koluka.—1 Tim. 3:1.
Kasi, kotyama mabɔkɔ ezalaki mpe na ndimbola mosusu. Na ekeke ya liboso, Yehova atikaki Bayisalaele oyo bazalaki libota na ye mpe aponaki Yisalaele ya elimo, elingi koloba lisangá ya baklisto bapakolami. (Mat. 21:43; Mis. 15:14; Gal. 6:16) Mpo na komonisa yango, apesaki baklisto makabo ya elimo lokola koloba minɔkɔ ndenge na ndenge. (1 Kol. 12:4-11) Ntango Koloneyi ná libota na ye bakómaki bandimi, bazwaki elimo santu mpe babandaki “koloba na minɔkɔ mosusu.”—Mis. 10:44-46.
Ntango mosusu, bazalaki kotya moto mabɔkɔ mpo azwa makabo ya elimo. Ntango Filipo asakolaki nsango malamu na Samalia, bato mingi bazwaki batisimo. Lisangani ya mikóló-bakambi batindaki ntoma Petelo ná ntoma Yoane kuna. Mpo na nini? Biblia elobi boye: “Bongo [bango mibale] batyaki mabɔkɔ na bango likoló [ya bato wana oyo bazwaki batisimo sika], mpe babandaki kozwa elimo santu.” Na ntembe te, yango elimboli ete bazwaki makabo ya elimo, elingi koloba bakómaki kosala makamwisi oyo bato mosusu bakokaki komona. Toyebi yango mpo Simona, oyo azalaki liboso kosala misala ya maji, amonaki ndenge elimo santu ezalaki kosala mpe alingaki kopesa bantoma mbongo mpo ye mpe abanda kotya bato mabɔkɔ mpo bázwa elimo santu mpe bákóma kosala makambo ya kokamwa. (Mis. 8:5-20) Na nsima, bato 12 bazwaki batisimo na Efese. Tozali kotánga boye: “Ntango Paulo atyaki mabɔkɔ na ye likoló na bango, elimo santu ekitelaki bango, mpe babandaki koloba na minɔkɔ mosusu mpe kosakola.”—Mis. 19:1-7; talá mpe 2 Timote 1:6.
Na yango, emonani ete na Baebele 6:2, Paulo azalaki kolobela kotyama ya mabɔkɔ likoló ya bato ya sika mpo bázwa makabo ya elimo santu.