Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/9 nk. 16-17
  • “Soki okómi na Ebale Coco, kende na lobɔkɔ ya mobali”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Soki okómi na Ebale Coco, kende na lobɔkɔ ya mobali”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Mapamboli na Jéhovah makomisaki ngai mozwi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Biloko ya motuya ya Laki oyo eleki monene na Amerika ya Ntei
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yehova asungi ngai na bomoi na ngai mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/9 nk. 16-17

Mokanda euti na Nicaragua

“Soki okómi na Ebale Coco, kende na lobɔkɔ ya mobali”

“OSENGELI kozala na motuka ya makasi, oyo ezali na masini oyo ekoki kobenda yango soki ekangami na pɔtɔpɔtɔ; osengeli mpe kozala na babidɔ mosusu ya esansi. Yebá ete na bisika mosusu, bapine ekozinda makasi na pɔtɔpɔtɔ. Soki okómi na Ebale Coco, kende na lobɔkɔ ya mobali.”

Lokuta mabe, maloba yango ya moninga na ngai oyo azalaki mpe misionɛrɛ ebangisaki ngai. Atako bongo, mokolo ya mibale na ntɔngɔ, nabandaki mobembo mpo na kokende na liyangani moko ya Batatoli na Wamblán, engumba moko moke na nɔrdi ya Nicaragua.

Nalamukaki ntɔngɔntɔngɔ, nazwaki motuka na ngai ya kala, kasi oyo ezali naino makasi, mpe nabandaki mobembo na nzela monene mpe ya malamu oyo ekatisi bikólo ya Amerika. Na engumba Jinotega, nakɔtaki na nzela ya mabelé oyo bato ya engumba yango babengaka feo, oyo elimboli “ya mabe.” Liboso natika engumba yango, namonaki magazini mibale, moko bakomá Likamwisi ya Nzambe mpe mosusu, Lisekwa.

Nzela yango ezalaki nyokanyoka mpe ngombangomba. Nazalaki kotambola malɛmbɛ pembenipembeni ya mabwaku. Nalekaki pembeni ya laki moko monene, na ngomba moko oyo nsɔngɛ na yango ezipami na mapata. Atako londende ezalaki, nazalaki komona banzete elandaná mpe oyo milona mosusu ebotá likoló na yango.

Na esika moko oyo nzela ebaluká, tolekanaki pembeni mpenza na bisi moko oyo ezalaki koya na ngámbo mosusu mpe ezalaki kotambola na katikati ya nzela. Ezalaki kobimisa milinga ya moindo, mpe lokola ezalaki na vitesi makasi, bapinɛ na yango ezalaki kopumbwisa mabanga. Awa na Nicaragua, liboso ya bavitre ya mituka, bakomaka bankombo oyo basofele ya mobulumobulu bamipesaka: Elombe, Scorpion, Nyoka mabe, to mpe Moto ya bokila.

Na midi, nakómaki na mokili patatalu ya Pantasma. Kuna, nalekaki liboso ya ndako moko ya mabaya; lopango na yango ekombolamaki malamu. Namonaki esika yango lokola fɔtɔ na buku moko ya kala: Mobange moko afandaki na kiti, mbwa moko alalaki na nse ya nzete, mpe bangɔmbɛ mibale bakangisami na sharɛti oyo ezali na bapinɛ ya mabaya. Na balabala ya engumba moko moke, namonaki ebele ya bana balati bilamba ya langi ya bule babimi na eteyelo.

Moi ezalaki makasi ntango nakómaki kopusana na engumba Wiwilí mpe na mosika, namonaki Ebale Coco. Ebale yango eleká na kati ya engumba mpe emonanaka tii na mosika. Nakanisaki maloba ya moninga na ngai mpe nakendaki na lobɔkɔ ya mobali, na nzela ya mpasi oyo ekei tii na Wamblán.

Na nzela yango oyo etondá na mabanga mpe ezali mabulumabulu, motuka elekaki na kati ya bitima ya mai soki 8 to 9. Na bisika ya pɔtɔpɔtɔ ekauká, nazalaki kokima mabulu mpe motuka ezalaki kotombola ebele ya putulu. Ya solo, “nalyaki putulu” ndenge bato ya mboka yango balobaka. Nsukansuka nalongaki, mpe na mosika, na kati ya lobwaku moko oyo etondi na banzete, namonaki engumba Wamblán, esika nazalaki kokende.

Mokolo oyo elandaki, namonaki lokola nde na ngonga ya 4h30 ya ntɔngɔ, bato nyonso basilaki kolamuka. Ngai mpe nalamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpo na makɛlɛlɛ ya bansɔsɔ mibali oyo bazalaki kolela; nabimaki libándá mpe nakendaki kotambola na balabala ya monene. Bipai nyonso nazalaki koyoka nsolo ya mampa oyo bazalaki kotumba na bafulu ya mabanga.

Na bifelo mingi, moyemi moko ya engumba yango asalá mayemi kitoko ya paladiso. Na babutiki, oyo bango babengaka pulperías, ezali na bapiblisite ya masanga ndenge na ndenge ya sukali. Ezali mpe na bitanda minene oyo bakomá bilaka ya baguvernɛma misato oyo elekaki. Nazalaki mpe komona batwaleti oyo esalemi na batole.

Nazalaki koloba na bato Adiós, mpo na kopesa bango mbote na ndenge ya bato ya Nicaragua. Bato bazalaki kosɛka mpe bazalaki koloba na ngai na esengo. Tozalaki kosolola na mongongo makasi mpo na makɛlɛlɛ ya bampunda oyo ezalaki koleka.

Mokolo ya mitano na mpokwa, bato bazalaki koya ná mabota na bango mpo na liyangani ya mikolo mibale. Bamosusu bazalaki koya na makolo, bamosusu na mpunda, mpe bamosusu na mituka. Bana mosusu batombolaki makolo na boumeli ya ngonga 6, na mapapa ya plastiki. Babangaki te kokatisa mai oyo ezali na bamine to koleka na mai oyo ezalaki na basonzo. Bato mosusu oyo bautaki mosika bamemaki mwa biloko ya kolya​—loso batyá mafuta ya ngulu. Bato wana nyonso bayaki kosala nini?

Bayaki mpo na kolendisa elikya na bango ya kozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. Bayaki kolanda mateya ya Biblia. Bayaki mpo na kosepelisa Nzambe.

Mokolo ya pɔsɔ ekómaki. Bato nyonso koleka 300 bafandaki na bakiti ya mabaya mpe ya plastiki na esika moko oyo ezipami na batole. Bamama bazalaki komɛlisa bana na bango mabɛlɛ. Bangulu bazalaki kotya makɛlɛlɛ mpe bansɔsɔ bazalaki kolela na ferme moko oyo ezalaki pembeni.

Ntango moi engalaki, molunge ekómaki makasi. Atako bongo, bato nyonso bazalaki kolanda batoli mpe mateya na likebi mpenza. Bazalaki kolanda na Babiblia na bango ntango balobi bazalaki kotánga bavɛrsɛ; bazalaki koyembela Nzambe, mpe bazalaki kolanda mabondeli na likebi.

Na mpokwa, nazalaki kosolola na bandeko yango mosusu mpe nazalaki kosala lipate na bana mike. Na nsima, nazalaki kotala makambo oyo bilenge bakomaki. Nalakisaki bango bililingi ya minzoto mpe bagalaksi na ordinatɛrɛ na ngai. Bana bazalaki kosɛka mpe baboti na bango bazalaki na esengo.

Nsukansuka, liyangani esilaki mpe moto na moto asengelaki kozonga epai na ye. Nalongwaki kuna na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, mpe nzelanzela nazalaki kokanisa makambo mingi ya malamu oyo namonaki kuna mpe motema na ngai etondaki na bolingo mpo na bandeko oyo nayebanaki na bango kuna. Nazali na ekateli ya komekola ezaleli na bango ya kosepela na biloko oyo bazali na yango mpe ya kotalela Nzambe.

[Bililingi na lokasa 17]

Bato basalaki mibembo milai mpo na koya na liyangani na Wamblán

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto