Oyebaki yango?
Yesu azalaki koloba monɔkɔ nini?
Bato ya mayele bazali na likanisi moko te mpo na likambo yango. Nzokande, ekoki kozala ete ntango Yesu azalaki awa na mabelé, azalaki koloba Liebele oyo ezalaki kolobama na ntango wana mpe Aramɛyɛ. Ntango Yesu akendeki na Nazalete ya Galilai mpe akɔtaki na sinagoga, atángaki esakweli ya Yisaya, oyo na ntembe te ezalaki na monɔkɔ ya Liebele. Esika moko te na Biblia elobi ete Yesu abongolaki eteni yango na Aramɛyɛ.—Luka 4:16-21.
Mpo na minɔkɔ oyo ezalaki kolobama na Palestine ntango Yesu azalaki awa na mabelé, profesɛrɛ G. Ernest Wright alobi boye: “Minɔkɔ oyo bato mingi bazalaki koloba ezalaki Grɛki ná Aramɛyɛ . . . Ekoki kozala ete basoda mpe bakonzi ya Loma bazalaki koloba Latin, nzokande bato ya Lingomba ya Bayuda bazalaki koloba Liebele oyo ezalaki kolobama na ekeke ya liboso.” Yango wana, tokoki kokamwa te ete makambo oyo Pilato akomaki likoló ya nzete oyo babakaki Yesu ekomamaki na minɔkɔ misato: Liebele, Latin mpe Grɛki.—Yoane 19:20.
Alan Millard alobi na buku na ye (Discoveries From the Time of Jesus) boye: “Na misala na bango, baguvɛrnɛrɛ ya Loma bazalaki koloba Grɛki, mpe ekoki kozala ete Yesu ayanolaki na mituna oyo Pilato atunaki ye ntango azalaki kosamba na monɔkɔ ya Grɛki.” Atako Biblia elobi te ete ayanolaki Pilato na Grɛki, likambo ya ntina ezali ete balobi te ete mobongoli moko azalaki na kati na bango mibale.—Yoane 18:28-40.
Profesɛrɛ Wright alobi ete: “Toyebi mpenza te soki Yesu azalaki koloba Grɛki to Latin, kasi ntango azalaki kosakola, azalaki mbala mingi koloba Aramɛyɛ to Liebele oyo ekɔtaki maloba ya Aramɛyɛ mingi, oyo ezalaki kolobama na bato nyonso.”—Biblical Archaeology, 1962, lokasa 243.
Mabanga ya tempelo ya Yelusaleme ezalaki minene ndenge nini?
Bayekoli ya Yesu balobaki na ye na ntina ya tempelo ya Yelusaleme boye: “Moteyi, talá! Oyo mabanga ya ndenge nini mpe oyo bandako ya ndenge nini!” (Malako 13:1) Mabanga yango mosusu ezalaki na bonene nini?
Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, Mokonzi Elode abakisaki bonene ya Ngomba ya tempelo mbala mibale koleka oyo ya ntango ya Salomo. Ngomba yango ezalaki monene koleka bangomba nyonso oyo esalemaki na mabɔkɔ ya bato na ntango wana. Ezalaki na bolai ya mɛtrɛ 480 mpe na bonene ya mɛtrɛ 280. Mabanga mosusu ezalaki na bolai ya mɛtrɛ 11, bonene ya mɛtrɛ 5 mpe bosanda ya mɛtrɛ 3. Mosusu ezalaki na bozito koleka tɔni 50. Kutu, ndenge moto moko ya mayele alobi, moko na yango ezalaki na bozito ya tɔni soki 400, mpe “elekaki mabanga nyonso na bozito na ntango wana.”
Yesu ayanolaki bayekoli na ye boye: “Ozali kotala bandako wana ya minene? Ata ndenge nini libanga moko te ekotikama awa likoló ya libanga kozanga ete ebwakama na nse.” (Malako 13:2) Tii lelo, mabanga yango mosusu ya minene elali na bisika oyo ekweaki ntango basoda ya Loma batindikaki yango na mobu 70 T.B.
[Elilingi na lokasa 26]
Mabanga ya tempelo ya Yelusaleme oyo bakweisá na lobwaku