Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/8 nk. 5-6
  • Tozali mpenza na ntango ya mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali mpenza na ntango ya mabe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Elembo ya “mikolo ya nsuka” to ‘ntango ya nsuka’ ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Nsuka ya mokili ekómi pene?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Tozali mpenza na “mikolo ya nsuka”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/8 nk. 5-6

Tozali mpenza na ntango ya mabe

BIBLIA esakolaki ete ntango moko ya mabe mpe “ya mpasi mpenza ekozala,” mpe ebengaki ntango yango “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5; 2 Petelo 3:3-7) Yesu alobelaki mpe ntango yango na eyano oyo apesaki bayekoli na ye na motuna oyo batunaki ye mpo na nsuka ya mokili oyo. (Matai 24:3) Tokómi mpenza na mikolo ya nsuka? Meká naino koyokanisa makambo oyo Biblia esakolaki ná balapolo oyo tozongeli awa na nse, mpe talá yo moko soki makambo yango ezali mpenza kokokisa bisakweli ya Biblia.

Oyo Biblia esakolaki: Bitumba na mokili mobimba​—Luka 21:10; Emoniseli 6:4.

Oyo balapolo elobi: “Bato oyo bakufaki na bitumba na ekeke ya 20 bazalaki ebele mpenza, mbala misato koleka motángo ya bato nyonso oyo bakufaki na bitumba liboso, banda kobotama ya Yesu tii na ekeke ya 19.”​—Worldwatch Institute.

Oyo Biblia esakolaki: Kozanga ya bilei mpe bamaladi​—Luka 21:11; Emoniseli 6:5-8.

Oyo balapolo elobi: Na 2004, bato soki milio 863 bazalaki kolya malamu te, elingi koloba bato milio 7 babakisami likoló ya baoyo bazalaki kolya malamu te na 2003.​—Organisation des Nations unies pour l’alimentation et l’agriculture.

Bato soki miliare moko bafandi na bakartye ya mabe mpenza; soki miliare 2,6 bafandi na bisika ya bosɔtɔ; soki miliare 1,1 bazali na mai ya pɛto te.​—Worldwatch Institute.

Bato milio 500 babɛlaki malaria; bato milio 40 bazali na maladi ya sida; bato milio 1,6 bakufaki na maladi ya ntolo na 2005.​—Organisation mondiale de la santé.

Oyo Biblia esakolaki: Kobebisama ya mabele​—Emoniseli 11:18.

Oyo balapolo elobi: “Makambo oyo bato bazali kosala ezali kobebisa mabelé na ndenge oyo ekosala ete banyama mpe milona ya ndenge mingi elimwa na mokili.” “Na mokili mobimba, biloko mingi oyo ebatelaka bomoi ya bato ezali kobeba.”​—Évaluation des Écosystèmes pour le millénaire.

“Bagaze oyo bato bazali kosalela ebebisi mopɛpɛ na ndenge moko ya mabe mpenza, mpe yango ekoki kobimisa makama ya nsɔmɔnsɔmɔ na mabelé.”​—NASA, Institut Goddard pour les études spatiales.

Oyo Biblia esakolaki: Kosakolama ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mabelé mobimba​—Matai 24:14; Emoniseli 14:6, 7.

Oyo balapolo elobi: Na boumeli ya 2007, Batatoli ya Yehova 6 957 854 balekisaki bangonga koleka miliare 1,4 na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mikili 236.​—Annuaire des Témoins de Jéhovah 2008.

Ndenge tolobaki liboso, Biblia esakolaki ete atako bansango ya mabe ekozala, ntina ya kozala na elikya ekozanga te. Yesu alobelaki “nsango malamu” ya Bokonzi ya Nzambe. Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Bokonzi yango ezali na boyokani nini na elikya ya bato mpo na mikolo ekoya? Mpe Bokonzi ya Nzambe ekomemela yo matomba nini?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Biblia esakolaki makambo oyo ezali kosalema na mokili lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto