Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/6 lok. 22
  • Nkombo ya Nzambe “esengeli kotángama te”?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkombo ya Nzambe “esengeli kotángama te”?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Yehova azali nani?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Nkombo ya Nzambe—Ndimbola na yango mpe ebéngeli na yango
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
  • A4 Nkombo ya Nzambe na Makomami ya Ebre
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/6 lok. 22

Nkombo ya Nzambe “esengeli kotángama te”?

NA LIBONGO ya masuwa ya engumba St. Louis, na etúká ya Missouri, ezali na monima moko (Gateway Arch) ya bolai ya mɛtrɛ 192; monima yango eleki bamonima nyonso ya États-Unis na molai. Pene na monima yango, ezali na ndako-nzambe moko (Old Cathedral).

Buku moko (The Story of the Old Cathedral) elobeli makambo oyo emonanaka na ekɔteli ya ndako-nzambe yango. Na likoló ya ekɔteli yango, okomona bakomá, na balɛtrɛ ya minene ya Liebele, nkombo ya Nzambe oyo ekoki kotángama te. Ndenge fɔtɔ oyo emonisi yango, balɛtrɛ ya Liebele minei oyo יהוה (YHWH), to tetragrame, oyo ezali nkombo ya Nzambe, emonanaka polele.

Na ntembe te, ntango batongaki ndako-nzambe yango na 1834, bakambi ya diosɛzɛ ya engumba St. Louis bamonaki ete nkombo wana, oyo ezali na balɛtrɛ minei ya Liebele, esengeli kozwa lokumu monene. Kasi, mpo na nini bato balobaka ete nkombo ya Nzambe “esengeli kotángama te”?

Buku mosusu (New Catholic Encyclopedia) eyebisi likambo moko oyo esalemaki ntango Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone bazongaki na mboka na bango na ekeke ya motoba L.T.B. Buku yango elobi boye: “Bakómaki komona ete Nkombo Yawe [tetragrame oyo bazalaki kobakisa milelisi ntango bazali kotánga yango] ebongi kotángama te mpo eleki mosantu, yango wana babandaki kolongola yango mpe kotya na esika na yango ADONAI [Nkolo] to ELOHIM [Nzambe]. . . . Momeseno wana nde esalaki ete bábosana ndenge mpenza bazalaki kobenga nkombo Yawe.” Yango wana, bato batikaki kosalela nkombo ya Nzambe. Nsukansuka, ndenge mpenza oyo bazalaki kobenga nkombo yango ebungaki, mpe nkombo ya Nzambe ekómaki nkombo oyo ekoki kotángama te.

Atako toyebi mpenza te ndenge bazalaki kobenga nkombo ya Nzambe, likambo ya ntina ezali ete kosalela yango ekosalisa biso tópusana penepene na Nzambe. Olingaka baninga na yo bábenga yo “mesye” to “madame,” to nde olingaka bábenga yo na nkombo na yo? Ata soki balobaka monɔkɔ mosusu mpe bayebi kobenga nkombo na yo malamu te, okolinga kaka bábenga yo na nkombo na yo. Nzambe mpe alingaka bábenga ye na nkombo na ye, Yehova.

Na Lingala, bato mingi babengaka Nzambe “Yawe.” Omoni te ete ebongi mpenza bato nyonso oyo balingaka Nzambe bábengaka ye na nkombo na ye mpenza, mpe na ndenge yango, bápusana penepene na ye? Biblia elobi boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—Yakobo 4:8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto