Mituna ya batángi
Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?
Bampasi ya bato eutaka epai ya Nzambe te. Biblia elobi ete: “Tiká ete ezala mosika na Nzambe ete asala mabe!” (Yobo 34:10) Soki ezali bongo, bampasi ya bato eutaka libosoliboso epai ya nani?
Yesu abengaki Satana “moyangeli ya mokili.” (Yoane 14:30) Na ntembe te, Yehova azali Moyangeli ya molɔ́ngɔ́. Mpe akozala kaka Moyangeli. Nzokande, mpo na mwa ntango, Nzambe atiki Satana ayangela mokili.—1 Yoane 5:19.
Emonani ete Satana azali moyangeli ya ndenge nini? Banda kaka akutanaki na bato mpo na mbala ya liboso, Satana akómaki mobomi mpe mokosi. Satana azali mpenza komonisa bato bwale. Yesu alobaki mpo na ye boye: “Ye azalaki mobomi-bato ntango abandaki, mpe atɛlɛmaki makasi te na kati ya solo, mpo solo ezali na kati na ye te. Ntango alobaka lokuta, alobaka engebene makanisi na ye moko, mpamba te azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.” (Yoane 8:44) Yesu alobaki mpe ete bato oyo bazalaki koluka koboma ye bazalaki bana ya Satana, mobomi ya liboso. Bamikómisaki bana na ye mpo bazalaki kosala makambo lokola ye. Lisese moko elobaka ete: “Mwana alandaka kaka lokolo ya tata to ya mama na ye.”
Satana azali kolona makanisi ya koboma na mitema na bato. Na ndakisa, Rudolph Rummel, profɛsɛrɛ ya kala na iniversite ya Hawaii, na États-Unis, alobi ete kobanda na mobu 1900 tii 1987, baguvɛrnema mingi ebomi bato 169 198 000 na makambo ya politiki, na mokano ya kosilisa bato ya bikólo mosusu mpe mpo na makambo mosusu ezangi ntina. Longola wana, ebele ya bato mosusu bakufaki na bitumba.
Soki Nzambe te nde azali kobimisa bampasi wana, mpo na nini azali kotika yango ezala? Mpo makambo oyo Satana abimisá banda kala na likambo ya malamu ná mabe esuki naino te. Tótalela naino moko ya makambo yango.
Na ebandeli ya mokili, Adama ná Eva bamityaki na ngámbo ya Satana. Baboyaki boyangeli ya Nzambe mpe baponaki komitambwisa bango moko; oyo elimbolaki mpenza ete baponaki kotambwisama na Satana.—Genese 3:1-6; Emoniseli 12:9.
Na bosembo na ye, Yehova amonaki malamu atikela bango ntango mpo bámonisa soki ye ayebi koyangela te. Nini emonani? Boyangeli ya bato na litambwisi ya Satana ememeli bato kaka mpasi. Likambo ya solo ezali ete ntango wana oyo Nzambe atikaki ememeli nde bato matomba. Na ndenge nini? Bato oyo bamoni mpenza ete boyangeli ya bato elongi te bazali na libaku ya komonisa ete baponi kotambwisama na Nzambe. Baoyo bazali koyekola mitinda ya Nzambe mpe bazali kotosa yango bazali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela.—Yoane 17:3; 1 Yoane 2:17.
Ya solo, lelo oyo, Satana nde azali kotambwisa mokili. Kasi, ezali kaka mpo na ntango mokuse. Mosika te, Yehova akosalela Mwana na ye “mpo na kobukabuka misala ya Zabolo.” (1 Yoane 3:8) Na litambwisi ya Nzambe, Yesu akobɔndisa bato mpe akolongola bampasi nyonso oyo bazali komona. Akosekwisa bamiliare ya bato oyo bazali kokufa banda mokili ebanda.—Yoane 11:25.
Lisekwa ya Yesu ezali ndanga oyo Nzambe apesi mpo na komonisa ete akolonga misala ya Zabolo—mpe yango emonisi oyo Nzambe akosala mpo na bato oyo baponi boyangeli na ye. (Misala 17:31) Biblia elobeli ntango yango na maloba kitoko oyo: “Nzambe ye moko akozala elongo na [bato]. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.”—Emoniseli 21:3, 4.