Bato bazali koluka biyano
“Nsima ya kokokisa bamposa na biso moko mpe ya mabota na biso, ya komitondisa na biloko ya kitokokitoko, na ndakisa biloko oyo etyaka malili na ndako, baradio mpe bavideo ya mikolo oyo, mpe bongo na bongo, tozali kaka koluka koyeba ntina oyo tozali na bomoi. Mpo na nini tozali koboma nzoto mpe kowelana kaka mpamba?”—David G. Myers, profɛsɛrɛ ya pisikoloji na iniversite moko ya États-Unis (Hope College, Holland, Michigan).
OKOPESA eyano nini na motuna oyo profɛsɛrɛ wana atunaki? Bato mosusu bakoki komituna soki ezali mpenza na ntina kobungisa ntango na koluka eyano na motuna yango. Nzokande, soki toboyi koluka eyano na motuna wana ezali lokola toboyi kolongola libanga ya moke oyo ekɔti biso na sapato. Tokoki kokoba kotambola—kasi tokomona mpasi.
Soki olukaka koyeba ntina ya bomoi, yebá ete ozali yo moko te. Ankɛti moko oyo esalemaki emonisaki ete bato mingi na mokili mobimba balukaka koyeba “ntina ya bomoi.”
Soki olingi kozala na kimya ya solosolo, osengeli kozwa biyano na mituna misato ya ntina mingi.
Toutá wapi?
Ntina ya bomoi ezali nini?
Bomoi ebombeli biso nini?
Epai wapi okoki kozwa biyano ya malamu mpenza na mituna wana ya ntina mingi? Na esika ya kopesa makanisi ya bato, masolo oyo elandi ekopesa biyano ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Tosɛngi yo ofungola Biblia na yo mpo omona yo moko biyano yango.