“Likabo na yo ya motuya mingi”
EZALI ndenge yango nde ministre-mokonzi moko ya kala ya Belgique abengaki buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.a Mobali moko oyo bafandaka na ye kartye moko akendaki kotala ye mpe atikelaki ye buku yango. Na nsima, mokonzi yango ya kala akomelaki ye mokanda ya botɔndi; alobaki boye: “Nasepelaki mingi ndenge oyaki kotala ngai, mpe nasepelaki mingi lisusu na likabo na yo ya motuya mingi: buku oyo elobeli ‘Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.’”
Moto yango atángaki buku wana malamu mpe asukisaki mokanda na ye na maloba oyo: “Soki bato batye likebi na nsango ya Baevanzile mpe basaleli mateya ya Yesu Klisto, mokili ekobongwana mpenza. Na ntango wana, tokozala lisusu na mposa ya conseil de sécurité te [bikólo oyo ebatelaka kimya na mokili]; bateroriste bakozala lisusu te, mpe mobulu ekolimwa na mokili.” Atako alobaki ete mpo na ye nyonso wana ezali ndɔtɔ mpamba, asepelaki mingi na ndenge moninga wana ya kartye akendaki kotala ye.
Na mokanda na ye abakisaki boye: “Bozali lisangá monene ya bato ya boboto oyo bamonaka te ete mokili oyo ezali malamu mpenza, bozali mpe te bato oyo bamonaka ete mokili oyo ezali kaka mabe; kasi bozali bato oyo bakanisaka ete bomoi ya bato mpe makambo mosusu ekobonga.”
Batatoli ya Yehova bandimaka ete Nzambe kaka nde akosala mokili ya malamu koleka, kasi bato te. Basalaka makasi bámekola Yesu Klisto, moto oyo alekaki bato nyonso. Batatoli ya Yehova bautaki koleka na ndako na yo? Na ntembe te okosepela soki osololi na bango na ntina na moto oyo alekaki bato nyonso. Bakosepela mpe kotikela yo buku oyo esepelisaki moto oyo azalaká ministre-mokonzi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.