Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/12 lok. 10
  • Ozalaka na mopesi-toli?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozalaka na mopesi-toli?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • Bilenge​—⁠Bolingi bomoi na bino ezala ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Mokanda ya Biblia nimero 38—Zekalia
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Elizabeti aboti mwana
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Makolo na motole moko ezali kobatela yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/12 lok. 10

Ozalaka na mopesi-toli?

UZIYA azalaki na mbula 16 ntango akómaki mokonzi ya Yuda. Ayangelaki mbula koleka 50, kobanda na mobu 829 tii na mobu 778 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Uziya “asalaki yango ekokaki na miso ya [Yehova]” banda azalaki naino elenge. Nini esalisaki ye alanda nzela ya malamu? Biblia elobi boye: “[Uziya] amityaki koluka Nzambe na mikolo ya Zekalia oyo alakisaki ye ete atosa Nzambe. Mikolo nyonso ya bomoi na ye wana elukaki ye [Yehova], Nzambe alongisaki ye.”​—2 Ntango 26:1, 4, 5.

Biblia elobi makambo mosusu te mpo na Zekalia, moto oyo azalaki mopesi-toli ya mokonzi. Nzokande, Zekalia asalisaki mpenza mokonzi oyo azalaki naino elenge asala oyo ezali malamu na ndenge “alakisaki ye ete atosa Nzambe.” Buku moko (The Expositor’s Bible) emonisi ete Zekalia azalaki “moto oyo amipesaki na koyekola makomami, ayebaki makambo mingi ya Nzambe, mpe azalaki na likoki ya kolakisa bato mosusu makambo oyo ayebi.” Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobaki boye mpo na Zekalia: “Ayebaki bisakweli mpe . . . azalaki mayele, alingaki Nzambe, mpe azalaki moto malamu; mpe, ekoki kozala ete ateyaki Uziya makambo mingi.”

Ezaleli malamu ya Uziya ememelaki ye mapamboli mingi mpe “azwaki makasi mingi” mpamba te “Nzambe asungaki ye.” Emonani ete lokola Uziya azalaki makasi na elimo, alongaki mpe na bokonzi na ye “na mikolo ya Zekalia.” (2 Ntango 26:6-8) Ntango Uziya akómaki na lokumu mingi, abwakaki mateya ya Zekalia, mopesi-toli na ye. Uziya “akómaki na lolendo mpe abebaki. Zambi aboyaki [Yehova].” Lokola asalaki likambo moko ya kozanga limemya na miso ya Nzambe, azwaki maladi moko mabe mpe azalaki lisusu na likoki ya koyangela te.​—2 Ntango 26:16-21.

Yo mpe ozalaka na mopesi-toli, moto moko oyo asalisaka yo ‘oluka Nzambe?’ Okoki kozala na ye ozala elenge to mokóló, mwasi to mobali. Sepelá na mopesi-toli yango, mpamba te batoli na ye ekoki kosalisa yo okoba kosala oyo ezali malamu na miso ya Yehova. Yokeláká moklisto yango oyo akomɛli na elimo, mpe saleláká batoli oyo apesaka yo. Kobwaka te toli ya bwanya ya moto yango oyo ‘asalisaka yo otosa Nzambe.’​—Masese 1:5; 12:15; 19:20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto