Bomoko na mokili ezali nde ndɔtɔ ya mpamba?
ELIKYA ezali ete mokili ekokóma na kimya to tozali nde kokende na likama? Bato mosusu bakoki koloba ete elikya ezali mpo na kimya, kasi mpo na bamosusu, elikya ezali ata moke te.
Bakonzi mosusu bazali mpenza na elikya ete kimya ekoya na mokili, mpo soki eyei te ekozala mabe koleka. Nzokande, mingi balɛngaka na nsɔmɔ ntango bamitunaka mituna oyo: Bikólo nini bazali na bibundeli ya makasi? Bakosalela bibundeli yango? Ekosuka ndenge nini soki basaleli yango?
Banda kala, kowelana mpe koyinana elongolaka elikya nyonso ya bomoko, mpe mbala mingi mangomba epelisaka lisusu nde mɔtɔ na esika ya koboma yango. Mopanzi nsango moko, James A. Haught, akomaki boye: “Eloko nyonso oyo ekabolaka bato ekoki kobimisa bitumba mpe kowelana, mpe losambo ezali moko ya makambo oyo eleki kokabola bato . . . Atako bato nyonso bakanisaka ete losambo ebongisaka bizaleli ya bato, emonani polele ete yango ezali nde kotinda bato mosusu básala makambo ya nsɔmɔ.” Mokomi Steven Weinberg alobaki mpe ndenge moko. Akomaki boye: “Kaka losambo nde ekoki kotinda bato malamu bakóma kosala makambo ya mabe.”
Elikya ezali ete mokolo mosusu mokili ekokóma na bomoko? Ɛɛ! Kasi, ndenge tokomona yango, bomoko yango ekouta te na bato to na mangomba oyo bato babimisá.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]
Mokili ezali nde lokola bɔmbi oyo elingi kopanzana?