Kokoma esika na yango na yisalaele
OSILÁ kotánga ata mwa eteni ya masapo minene ya Bagrɛki ya ntango ya kala, oyo babengaka Iliade to oyo babengaka Odyssée? Bato balobaka ete masapo yango ekomamaki na siɛklɛ ya libwa to ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Tokoki koloba nini soki tokokanisi mikanda yango na Biblia, buku oyo ebandaki kokomama bankama ya bambula liboso? Buku moko (The Jewish Bible and the Christian Bible) elobi boye: “Biblia elobeli kokoma to mpe mikanda na bisika koleka 429. Likambo yango esengeli mpenza kobenda likebi na biso soki tokanisi ete Iliade elobeli kokoma kaka na esika moko mpe Odyssée elobeli yango ata na esika moko te.”
Buku mosusu (The Oxford Encyclopedia of Archaeology in the Near East) elobi ete “emonani ete na Yisalaele kokoma ezalaki na kati ya makambo oyo bazalaki kosala na losambo.” Na ndakisa, bakomaki kondimana ya Mibeko mpe na nsima, bazalaki kotánga yango mbala na mbala liboso ya mibali, basi mpe bana nyonso. Bato bazalaki mpe kotánga mpe koyekola yango, na bituluku to na kati ya libota. Nsima ya kotalela mwa makambo oyo ezalaki na Mibeko, Alan Millard, profɛsɛrɛ na Iniversite ya Liverpool, na Angleterre, alobaki boye: “Emonani ete na Yisalaele, bato ya lolenge nyonso bayebaki kotánga mpe kokoma.”—Deteronome 31:9-13; Yosua 1:8; Nehemia 8:13-15; Nzembo 1:2.
Ntoma Paulo amonisaki ndenge oyo baklisto basengeli kotalela makomi mosantu: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na kolakisa biso, mpo ete na nzela ya ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na nzela ya kobɔndisama oyo euti na Makomami tókoka kozala na elikya.” Otángaka Biblia mokolo na mokolo mpo na komonisa ete opesaka yango motuya?—Baloma 15:4.