Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/8 lok. 32
  • Miso ya Nzambe ezali komona yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Miso ya Nzambe ezali komona yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/8 lok. 32

Miso ya Nzambe ezali komona yo?

YEHOVA, Mozalisi Monene, azali na likoki ya komona? ɛɛ! Biblia etuni boye: “Ye oyo asalaki liso, akotala te?” (Nzembo 94:9) Yehova amonaka mosika koleka bato. Atalaka kaka libándá te, kasi ‘amekaka mpe mitema.’ (Masese 17:3; 21:2) Ɛɛ, Yehova azali na likoki ya koyeba makanisi mpe bamposa ya motema na biso.

Yehova ayebi mikakatano oyo tokoki kokutana na yango mpe ayokaka mabondeli na biso. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Miso ya [Yehova] ekotalaka bato ya boyengebene mpe matoi na ye ekoyokaka koganga na bango. [Yehova] azali penepene na bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na milimo minyatami.” (Nzembo 34:15, 18) Koyeba ete Yehova ayebaka makambo oyo ekómelaka biso mpe ayanolaka na mabondeli oyo tosalaka na motema mobimba, elendisaka!

Yehova ayebaka ata makambo oyo esalemaka na nkuku. Ya solo, “biloko nyonso ezali bolumbu mpe etandami polele na miso ya moto oyo epai na ye tokozongisa monɔkɔ.” (Baebele 4:13) Yango wana, ezala misala na biso ezali malamu to mabe, Nzambe amonaka yango nyonso. (Masese 15:3) Na ndakisa, Genese 6:8, 9 elobi ete: “Noa azwaki ngɔlu na miso na [Yehova]” mpe ete “atambolaki na Nzambe elongo.” Ya solo, Yehova andimaki mpe apambolaki Noa mpamba te azalaki na botosi mpe azalaki kotosa mitinda ya Nzambe. (Genese 6:22) Nzokande, bato ya ntango ya Noa bazalaki na mobulu mpe batondaki na makambo ya mbindo. Nzambe azalaki komona makambo yango. “Amonaki ete masumu ya bato ezalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango ezalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.” Nsukansuka, Yehova abomaki bato mabe mpe abikisaki Noa ná libota na ye.​—Genese 6:5; 7:23.

Yehova akosepela na yo? Ya solo, miso ya Yehova “ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.” (2 Ntango 16:9) Mosika te, akolongola lisusu bato mabe nyonso na mabelé mpe akobikisa bato ya komikitisa.​—Nzembo 37:10, 11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto