Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/6 lok. 32
  • “Oyebaka nkombo ya Nzambe?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Oyebaka nkombo ya Nzambe?”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/6 lok. 32

“Oyebaka nkombo ya Nzambe?”

MOTUNA wana ebendaki likebi ya mwasi moko na Azia ya Ntei. Motuna yango ezalaki na ezipeli ya Lamuká! ya 22 Yanuali 2004. Mwasi yango atindelaki babimisi ya zulunalo yango mokanda; akomaki boye: “Ntango kaka namonaki zulunalo na bino ebendaki likebi na ngai mpe esalisi ngai nakolisa bizaleli ya malamu. Nakómi kosepela na bomoi. Nazali koyebisa moto nyonso makambo oyo nayekoli mpo na Nzambe na biso mpe kimya oyo boyebi na ye ememelaka bato.”

Na bisika mingi, ata “tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé,” bato bazali koyeba nkombo ya Nzambe, Yehova. (Misala 1:8) Na ndakisa, nkombo yango na monɔkɔ ya Turkmène, etángamaka Yehowa, mpe ezali na libongoli ya Makomami Mosantu na monɔkɔ ya Turkmène. Nzembo 8:1 elobi boye: “Ee [Yehova], Nkolo na biso, nkombo na yo ezali na nkembo mingi kati na mokili mobimba.”

Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na Yehova Nzambe, mwasi yango asɛngaki mwa buku ya nkasa 32 oyo ezali na motó ya likambo Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko. Yo mpe okoki kosɛnga Batatoli ya Yehova mwa buku yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto