Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/6 lok. 32
  • Nguya ya lolemo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nguya ya lolemo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/6 lok. 32

Nguya ya lolemo

LOLEMO ya dikala (girafe) ekoki kokóma na bolai ya santimɛtrɛ 45 mpe ezali na nguya ya kobuka nkasa na bitape ya nzete. Lolemo ya baleine bleue ekokani na nzoku ya mobimba na kilo. Kanisá naino nguya oyo baleine bleue esengeli na yango mpo na kosalela lolemo na yango!

Na kotalela monene, kilo mpe makasi ya lolemo ya baleine bleue, oyo ya moto ekokani na yango ata moke te. Nzokande, lolemo ya moto ezali na nguya koleka. Mpo na mwa enama moke wana ya nzoto ya moto, Biblia elobi boye: “Kufa mpe bomoi ezali na nguya ya lolemo.” (Masese 18:21) Mbala boni toyokaka masolo ya nguya mabe ya lolemo! Lolemo ekoselá bato makambo oyo esalá bango mabe to mpe ebomisá bango, atako basalaki likambo te.

Ndenge moko mpe, lolemo ekabolá bato oyo bazalaki baninga ya solosolo na boumeli ya bambula ebele. Maloba mabe ezokisá bato mosusu. Yobo, oyo baninga na ye balobelaki makambo oyo epesaki ye mpasi, alobaki boye: “Kino ntango nini bokotungisa molimo na ngai mpe bokobukabuka ngai na maloba?” (Yobo 19:2) Yakobo, moyekoli ya Yesu, alobelaki nguya mabe ya lolemo na maloba ya elilingi oyo: “Lolemo ezali enama moko ya moke nzokande emikumisaka na makambo minene. Talá! Mwa mɔtɔ moke ekoki mpo na kozikisa zamba ya monene mpenza! Ɛɛ, lolemo ezali mɔtɔ.”​—Yakobo 3:5, 6.

Epai mosusu, nguya ya lolemo ekoki mpe kobikisa. Maloba ya kobɔndisa esalisá bato mingi oyo bazalaki kotungisama na makanisi to balingaki komiboma. Bato mingi oyo bamipesaki na bangi mpe na mobulu babikaki na liwa ya mbalakaka mpo batosaki toli ya malamu. Ya solo, matomba oyo lolemo ya moto malamu ebimisaka ezali “lokola nzete ya bomoi” mpe “liloba lilobami na ntango malamu ezali lokola wolo etyami na kati ya palata.”​—Masese 15:4; 25:11.

Nzokande, lolenge eleki malamu ya kosalela lolemo, ezali ya kosanzola Yehova Nzambe, kosakola nsango malamu ya Bokonzi na ye mpe koteya basusu mateya ya Biblia. Mpo na nini? Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.”​—Yoane 17:3; Matai 24:14; 28:19, 20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto