Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/5 nk. 3-4
  • Obangaka avenire?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Obangaka avenire?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • Kobanga Nzambe ekoki komemela yo bolamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mpo na nini kobanga Nzambe, kasi bato te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Bongisá motema na yo mpo na kobanga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tóyekola kozwa bosepeli kati na kobanga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/5 nk. 3-4

Obangaka avenire?

BATO babangaka makambo ndenge na ndenge. Na ndakisa, bato mosusu babangaka makambo oyo ekoki kobebisa mabelé mobimba. Zulunalo moko (Time) oyo ebimaki na mwa 3 Aprili 2006, elobaki boye: “Makambo ndenge na ndenge oyo ezali kosalema, na ndakisa molunge makasi, mipɛpɛ ya makasi, mpela, bazamba minene ezali kozika, mabanga minene ya ngalasi ezali konangwa, nyonso wana emonisi ete klima ya mokili ebebi mpenza.”

Na sanza ya Mai 2002, ebongiseli moko ya ONU (Programme des Nations Unies pour l’environnement) ebimisaki lapolo na yango ya misato. Lapolo yango oyo ebongisamaki na bato ya mayele koleka 1 000, elobaki boye: “Ndenge oyo mabelé ekómi ezali kosɛnga tókeba na makambo oyo tozali kosala lelo oyo mpamba te ezali kobebisa bazamba, mai ya mbu, bibale, bangomba, ezali koboma ebele ya banyama ya zamba mpe kobebisa biloko mosusu oyo ezali na ntina mpo na bomoi ya bato lelo oyo mpe na mikolo ezali koya.”

Ndenge oyo mabelé ekómi lelo oyo ezali kaka moko ya makambo oyo ezali kobangisa bato. Na mokili mobimba, bato bazali mpe kobanga bateroriste. Mokonzi moko ya basoda na Canada alobaki boye: “Ekómaka ete na butu mpɔngi esila biso na miso mpo na kokanisa makama oyo ekoki kobima na ntango mpe na lolenge oyo toyebi te.” Kutu, kolanda kaka bansango na televizyo ekoki kosala ete moto akóma kobanga!

Bato mingi ya mosala bazali kobanga ete bábungisa misala na bango. Makambo lokola kolongolama na mosala, kokwea ya bakompanyi, kowelana na esika ya mosala, mpe ndenge bakonzi mosusu bazali kotinda bato ya mosala básala mingi koleka, ezali kokómisa bato mitema likoló. Bilenge mosusu bakoki kobanga ete baninga na bango báboya bango. Bana mosusu bakoki kobanga mpo bazali koyeba mpenza te soki baboti na bango balingaka bango. Tokoloba boni mpo na makambo oyo ezali koleka na mokili? Mama moko alobaki boye: “Na bantango mosusu, soki bana babimi libándá bamonaka lokola nde bakɔti na esika moko ya nsɔmɔ mpe ya kobangisa.” Lisusu, baboti mingi babangaka ete bizaleli mabe ya mokili oyo ebebisa bana na bango.

Mbala mingi mibange babangaka kokwea ntango bazali komata na basikalie to babangaka ete moto moko asala bango mabe na nzela. Ndenge Biblia elobi yango, ‘bakómaka kobanga oyo ezali molai, mpe makambo ya nsɔmɔ na nzela.’ (Mosakoli 12:5) Biso nyonso tobangaka kozwa maladi moko ya mabe. Bamaladi lokola grippe, kanser, mpe bamaladi mosusu ya mabe oyo tozali koyoka na bansango ete ezali koboma bato mingi, ekoki kosala ete biso mpe tókóma kobanga ete maladi moko oyo eyebani naino te ezwa biso moko to bato ya libota na biso. Ntango moto moko oyo azalaki nzoto makasi abɛli, tokómaka komituna soki likambo ya bongo ekokómela biso to moto moko na kati ya libota. Lisusu, epesaka mpasi na motema soki tomoni moto oyo azali kobɛla azali ata na elikya moko te.

Lokola makambo oyo ebangisaka biso ezali mingi, tozali nde na ntina mpenza ya kozala na elikya mpo na avenire? Ezali na eloko moko oyo ekoki kosalisa biso tóbungisa elikya te? Lisolo oyo elandi ekopesa eyano na mituna yango.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa ]

© Jeroen Oerlemans/Panos Pictures

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto