Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/5 lok. 32
  • Elembo oyo eleki ntina

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elembo oyo eleki ntina
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/5 lok. 32

Elembo oyo eleki ntina

BATO ya bikólo mingi bazalaka na masese oyo elimbolaka bilembo ya ntango. Na ndakisa balobaka ete: “Liboso ya mbula, mopɛpɛ” to “mbula ezangaka mopɛpɛ te.” Lelo oyo, bato ya mayele oyo bayebaka kotala bilembo ya ntango bayebisaka soki mbula ekobɛta to te, ndenge masese wana elobi.

Na mikolo ya Yesu, bato bazalaki mpe koyeba kolimbola motindo oyo likoló ezali komonana. Yesu ayebisaki Bayuda mosusu ete: “Ntango mpokwa ekómaka bozalaka na momeseno ya koloba ete, ‘Lelo mokolo ekozala malamu, mpo likoló ezali motane lokola mɔtɔ’; mpe na ntɔngɔ ete, ‘Lelo ekozala mokolo ya malili makasi, mokolo ya mbula, mpo likoló ezali motane lokola mɔtɔ, kasi molilimolili.’ Boyebi kolimbola motindo oyo likoló ezali komonana.” Kasi, Yesu alobaki likambo moko oyo esalemaka te: “Bilembo ya bantango bokoki kolimbola yango te.”​—Matai 16:2, 3.

“Bilembo ya bantango” ezalaki nini? Ezalaki bilembo oyo ezalaki komonisa polele ete Yesu azalaki Masiya ya solo oyo atindamaki na Nzambe. Makambo azalaki kosala ezalaki komonana polele ndenge mapata ya motane emonanaka. Nzokande, Bayuda mingi baboyaki kondima bilembo oyo ezalaki komonisa ete Masiya ayei, likambo oyo ememaki mbongwana monene koleka kutu bilembo ya mapata.

Lelo oyo mpe, ezali na elembo moko oyo esengeli mpenza tóyeba ntina na yango koleka kutu balangi ya mapata oyo tomonaka. Yesu asakolaki ete mokili oyo ekobebisama mpe ekotika esika na oyo ya malamu. Apesaki bilembo oyo ekomonisa ntango nini mbongwana wana ekobanda. Na kati ya bilembo yango, atángaki bitumba mpe nzala oyo esengelaki kozala na mokili mobimba. Yesu alobaki ete ntango makambo wana ekomonana, tosengeli koyeba ete etikali moke Nzambe azwa makambo na mabɔkɔ.​—Matai 24:3-21.

Ozali komona “bilembo ya bantango”?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto