Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/4 lok. 32
  • Mposa ya Adryana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mposa ya Adryana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/4 lok. 32

Mposa ya Adryana

ADRYANA, mwana moko ya mbula motoba, oyo afandaka na engumba Tulsa, na etúká ya Oklahoma, na États-Unis, azalaki na mposa moko. Tokoki kokokanisa mposa yango na oyo Davidi amonisaki na nzembo moko na maloba oyo: “Nasɛngi eloko moko epai ya Yehova​—yango nde nakoluka, ete nafanda na ndako ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na komona ndenge Yehova asepelisaka mpe kotala na botɔndi tempelo na ye.”​—Nzembo 27:4, NW.

Ntango Adryana azalaki na sanza motoba, minganga bamonaki ete azali na maladi moko oyo babengi neuroblastome. Maladi yango esalaki ete Adryana atambola te. Minganga basalaki ye lipaso mbala mingi mpe na boumeli ya mbula mobimba basalisaki ye na mayele oyo babengi chimiothérapie.

Tata ya Adryana, oyo azali Motatoli te, asɛngaki bakambi ya ebongiseli moko oyo esungaka bana oyo babɛlaka maladi ya mabe bámema Adryana akende kotala esika moko oyo babongisá masano mpo na bana. Liboso bakambi ya ebongiseli yango bákokisa mposa ya Adryana, basololaki na ye. Adryana apesaki bango botɔndi na ndenge batyelaki ye likebi, kasi ayebisaki bango ete akosepela nde kokende kotala biro monene ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na New York. Ntango ayokaki ete tata na ye aponaki esika mosusu, Adryana abondelaki Yehova apesa ye libaku ya kokende kotala Betele. Bakambi ya ebongiseli yango bakanisaki ete Betele ezali na eloko moko te oyo ekoki kosepelisa mwana moke; atako bongo, bandimaki akende kuna ntango tata ya Adryana atikaki mwana na ye apona ye moko esika oyo alingi kokende.

Adryana akendaki kotala biro monene ya Batatoli ya Yehova na New York elongo na mama na ye, ndeko na ye ya mwasi ná moninga na bango moko. Adryana alobaki boye: “Yehova ayanolaki mabondeli na ngai; nayebaki ete akoyamba biso na Betele. Namonaki ndenge basalaka babuku, bazulunalo mpe Babiblia. Yango ezali malamu koleka parkɛ ya masano.”

Adryana ‘amonaki ndenge oyo Yehova asepelisaka’ mpe asepelaki komona ndenge oyo misala ezali kosalema na biro monene ya Batatoli ya Yehova lelo oyo. Tolendisi yo mpe okende kotala Betele. Longolá biro monene ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na New York, Babetele ezali mpe na mikili ndenge na ndenge.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto