“Atyaki biso mbamba tóndima kaka”
EYEBANI ete bato ya mikili ya Azia bazalaka na ezaleli ya koyamba bapaya. Na ndakisa na Inde, libota mobimba bakoki kondima kolala nzala mpo na kopesa bilei na mopaya oyo ayeli bango na mbalakaka. Na Iran, mwasi ya malamu azalaka ntango nyonso na bilei na frigo mpo na kopesa bapaya oyo bakoki koyela bango na mbalakaka.
Bato mingi oyo Biblia elobeli bazalaki mpe na ezaleli yango. Ndakisa moko ezali ya Lidia, oyo mbala mosusu azalaki prozelite mpe azalaki kofanda na Filipi, engumba monene ya etúká ya Masedonia. Mokolo moko ya sabata, ntoma Paulo ná baninga na ye ya mobembo bakutaki Lidia ná basi mosusu libándá ya engumba Filipi, pembeni ya ebale. Yehova afungolaki motema ya Lidia mpo ayoka makambo oyo Paulo azalaki koloba. Nsukansuka, ye mpe bato ya ndako na ye bazwaki batisimo. Na nsima abondelaki bato yango oyo bautaki mobembo na maloba oyo: “Soki bomoni mpenza ete nazali moto ya sembo na miso ya Yehova, bókɔta na ndako na ngai.” Luka, ye oyo azalaki ná Paulo, alobaki boye: “Atyaki biso mbamba tóndima kaka.”—Misala 16:11-15.
Lokola Lidia, baklisto ya lelo bandimaka koyamba bandeko na bango ya elimo, na ndakisa bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango. Bayambaka bango na esengo mpenza. Bandeko oyo bayambaka bapaya bazwaka libaku ya koyoka masolo ya elimo oyo elendisaka mpe balekisaka ntango malamu elongo na bandeko. Atako Batatoli ya Yehova mingi bazali bato ya mbongo te, ‘balandaka nzela ya ezaleli ya koyamba bapaya.’ (Baloma 12:13; Baebele 13:2) Elimo ya kokaba epesaka bango esengo. Yesu alobaki solo ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Misala 20:35.