Noele ezali kokóma fɛti ya nini?
ELEKI sikoyo mbula zomi, lisolo moko oyo ezalaki na motó ya likambo, “Noele: fɛti ya nini?” ebimaki na zulunalo moko (U.S.News & World Report). Mokomi amitunaki soki Noele ezali kokóma fɛti ya “losambo kaka.” Okanisi ete ezali kokóma bongo?
Lisolo yango elobelaki mwa makambo oyo ezali kolongola biso elikya nyonso ete fɛti yango ekokóma bongo. Elobaki boye: “Eloko moko te ezali komonisa ete baklisto ya liboso bazalaki kosepela mbotama ya Klisto; fɛti yango ebandaki na siɛklɛ ya minei, na eleko oyo Constantin . . . azalaki amperɛrɛ ya Loma.” Yango ezali “moko na makambo oyo emonisi ete moto moko te ayebaki mokolo oyo Yesu abotamaki.” Lisolo yango elobaki ete “baevanzile elobi mbula, sanza to mokolo te” oyo Yesu abotamaki. Moto moko ya mayele na makambo ya kala oyo azali molakisi na Iniversite ya Texas alobaki ete “baklisto ya liboso bazalaki kosepela Eyenga ya Mbotama te.”
Na motó ya likambo moke “Mokolo oyo bato bango moko bakanisi,” lisolo yango elobelaki “ndenge oyo lingomba eponaki mokolo ya 25 Desɛmbɛ.” Bakomaki boye: “Bato mingi ya mayele balobaka ete baklisto bazwaki kaka mokolo ya fɛti ya Saturnales mpe bafɛti mosusu ya bapakano mpe bakómisaki yango mokolo ya fɛti ya ‘boklisto.’” “Mpo bato mingi básepela mbotama ya Mobikisi, bakonzi ya mangomba batyaki fɛti ya Noele na nsuka ya sanza ya Desɛmbɛ, eleko oyo bato bamesanaki kosala bafɛti.” Na katikati ya bambula ya 1800, bato bakómaki kotya likebi mingi na kopesana bakado. “Mpo na bakomelesa, momeseno ya kopesana bakado na Noele ekómaki libaku ya kozwa mbongo mingi na mwa ntango moke, mpe bakómaki kosala piblisite ya fɛti yango.”
Yango wana, likambo moko te ezali kondimisa biso ete Noele ekokóma mpenza fɛti ya losambo. Atako bato bazali “komipesa na mombongo” na eleko ya Noele, baklisto ya solo bakanisá ata mokolo moko te kokumisa mbotama ya Yesu. Bayebi ete Biblia elobeli nde liwa mpe lisekwa ya Klisto mpo na kosikola biso. (Matai 20:28) Yango ekotikala likambo oyo eleki ntina.