Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/12 lok. 32
  • Zuzi akoki kosembolama?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zuzi akoki kosembolama?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/12 lok. 32

Zuzi akoki kosembolama?

SLADJANA, Motatoli moko ya Yehova ya ekólo Croatie asengelaki kosamba likambo moko ya mbongo na tribinale. Akómaki mpenza na ngonga liboso ya zuzi. Nzokande, moto oyo asengelaki kosamba na ye akómaki naino te. Sladjana azalaki mpenza na mposa ya kopesa litatoli. Wana bato nyonso bazalaki kozela, azwaki ekateli ya kosolola na zuzi.

Atunaki: “Papa, oyebi ete mosika te bazuzi mpe batribinale ekozala lisusu te awa na mabelé?”

Zuzi akamwaki mpe azwaki ata likambo ya koloba te. Eumelaki te, babandaki kosamba. Ntango basilisaki kosamba mpe Sladjana atɛlɛmaki mpo atyá lobɔkɔ na mokanda, zuzi apusanaki pene na ye mpe atunaki ye na mongongo ya nse: “Ezali mpenza solo ndenge oyebisaki ngai ete mosika te bazuzi mpe batribinale ekozala lisusu te awa na mabelé?”

Sladjana ayanolaki ete: “Papa, ezali mpenza bongo!”

Zuzi atunaki: “Nini endimisi yo?”

Sladjana ayanolaki ete “Biblia.”

Zuzi ayebisaki ye ete akosepela kotánga likambo yango, kasi azangi nde Biblia. Sladjana alakaki ete akomemela ye Biblia. Batatoli ya Yehova bakendeki kotala ye, bapesaki ye Biblia mpe balendisaki ye ayekolaka Biblia pɔsɔ na pɔsɔ. Zuzi andimaki, mpe mosika te akómaki Motatoli ya Yehova.

Esakweli ya Nzembo 2:10 (NW) elobi boye: “Sikoyo, bino bakonzi, bózala na bososoli, bótika ete básembola bino, bino bazuzi ya mokili.” Oyo nde esengo komona ete ata bazuzi bazali komikitisa mpo na kolanda litambwisi ya bolingo ya Yehova!

[Elilingi na lokasa 32]

Sladjana ná zuzi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto