Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/11 lok. 32
  • Daniel na makarɔ na ye ya liyangani

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Daniel na makarɔ na ye ya liyangani
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/11 lok. 32

Daniel na makarɔ na ye ya liyangani

YESU apamelaki bakonzi ya mangomba oyo bazalaki komimona sembo na miso na bango moko, oyo basepelaki te ntango bamonaki bana mike bazali kokumisa Nzambe. Atunaki bango boye: “Botángá naino te likambo oyo ete, ‘Uta na minɔkɔ ya bana mike mpe ya bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ obimisi lisanzoli’?”​—Matai 21:15, 16.

Daniel, elenge moko ya mbula motoba, oyo azali na lisangá moko ya monɔkɔ ya Russe na Allemagne, amonisi mpenza ete bilenge bazali mpe kosanzola Yehova na mikolo na biso. Ye, ná mama na bango ná yaya na ye ya mwasi bakɔtaki na liyangani moko ya Batatoli ya Yehova na engumba Duisburg. Wana mbala ya liboso bakɔtaki liyangani ya monene. Makambo nyonso ezalaki ya sika: Otɛlɛ, bayangani ebele, kofanda mikolo misato mobimba, batisimo, drame. Bongo Daniel? Apesaki ndakisa moko ya malamu mpenza.

Ntango liyangani esilaki, bazongaki epai na bango. Daniel alamukaki mwayambo na ntɔngɔ mpo na kokende kelasi. Kasi, nini etikalaki na jakɛti na ye? Makarɔ na ye ya liyangani! Mama na ye alobaki na ye boye: “Liyangani esili. Lelo okoki kolongola makarɔ.” Kasi, Daniel alobaki ete: “Nalingi moto nyonso ayeba epai nakendeki mpe makambo oyo nayekoli kuna.” Na yango, alataki makarɔ na ye na lolendo nyonso na eteyelo mokolo mobimba. Ntango molakisi na ye atunaki ye ntina ya makarɔ yango, Daniel alimbwelaki ye ndenge makambo elekaki na liyangani.

Na ndenge yango, Daniel alandaki ndakisa ya ebele ya bilenge mosusu oyo bakumisá Yehova na boumeli ya bikeke.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto