Ndenge bazalaki koyeba nzela na kati ya Mbu monene
BISANGA Marshall ezali na bisanga ya minene mpe ya mike koleka 1 200, mpe mingi kati na yango ezali na nse mpenza. Soki opesi yango mokɔngɔ kaka mwa moke, okoki komona yango lisusu te. Kasi na ntango ya kala, bato ya mai ya bisanga Marshall oyo bazalaki kotambola na bakanɔ kouta na esanga moko tii na esanga mosusu, mpe bazalaki koyeba nzela malamu na kati ya etando wana ya bisanga Marshall ya Mbu ya pasifike, oyo ezali na bonene ya kilomɛtrɛ kare soki milio 2. Ndenge nini bazalaki koyeba yango? Bazalaki kosalela bakarte ya nzete.
Bato ya mai ya Marshall bayebaki ete mbonge ya lolenge moko boye esalemaka pene na esika mokili ezali, mpe yango ezalaki kosalisa bango báyeba ete esanga moko ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 30. Basengelaki koyeba bisika mingi oyo bambonge yango ezali, mpe bakarte wana ya nzete ezalaki kosalisa bango báyeba yango. Bakarte yango ezalaki ndenge nini? Ndenge ozali komona na fɔtɔ, bazalaki kosala yango na misisa ya nzete to na mbanzi ya nkasa ya kokoti, mpe ezalaki lokola motalaka. Bisika oyo mbanzi yango etutani ezalaki kolakisa bisika oyo bambonge ezali. Ezalaki mpe na mposo ya mbɛmbɛ ya mikemike oyo ezalaki kolakisa bisika oyo bisanga ezali.
Na boumeli ya bambula mingi, kaka mwa bato moke oyo baponamaki nde bayebaki kosalela bakarte yango. Ndenge nini moto ya sika akokaki koyeba kosalela karte yango? Kaka soki balakisi ye mpe ye moko asaleli yango. Moto moko oyo amesani na kotambola na Mbu azalaki koteya oyo azali koyekola. Akokaki mbala mosusu kotambola na ye na bisanga ya penepene. Soki moyekoli amoni ete karte yango ezali kosalisa ye ayeba bisika bambonge ezali, akobanda mpenza kotyela yango motema. Na nsima, akoki kobanda kotambola na kati ya Mbu ye moko.
Ndenge moko mpe Biblia, Liloba ya Nzambe, ekoki kotambwisa biso na mobembo na biso ya bomoi. Na ebandeli, moto moko akoki kosalisa biso tóyeba mateya ya moboko ya Makomami. Na nsima, ntango tozali kokoba koyekola Liloba ya Nzambe mpe kosalela mitinda na yango, tokokóma mpenza kotyela yango motema. Nzambe alobaki na Yosua oyo atambwisaki Bayisalaele ete atángaka Liloba ya Nzambe ntango nyonso mpo akoka “kotosa makambo nyonso makomami na yango.” Abakisaki boye: “Bongo okozalisa nzela na yo malamu mpe [okozala na bwanya, NW].” (Yosua 1:8) Ya solo, Biblia ekoki kolakisa biso nzela oyo eleki malamu na bomoi.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
© Greg Vaughn