Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/9 lok. 32
  • “Nalingi mobeko na yo mingi mpenza!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nalingi mobeko na yo mingi mpenza!”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/9 lok. 32

“Nalingi mobeko na yo mingi mpenza!”

NZEMBO 119 ezali komonisa ndenge oyo mokomi na yango azalaki koyoka mpo na liloba to nsango ya Nzambe oyo epemami. Mokomi ya nzembo ayembi boye: “Nabombi liloba na yo malamu mpenza na motema na ngai.” “Nakangami na mibeko na yo.” “Molimo na ngai etutami na mposa makasi mpo na bikateli na yo ntango nyonso.” “Nalingaka matatoli na yo.” “Nalingi mitindo na yo.” “Nakosepela na bakomandema na yo.” “Nakomibanzabanza mpo na malako na yo.” “Nalingi mobeko na yo mingi mpenza! Nakanisaka yango mokolo mobimba.”​—Nzembo 119:11, 16, 20, 24, 40, 47, 48, 97, NW.

Mokomi ya nzembo amonisi mpenza ete azalaki kosepela na liloba ya Nzambe! Yo mpe oyokaka ndenge wana mpo na Biblia, Liloba ya Nzambe? Yo mpe okosepela ete okóma kolinga liloba ya Nzambe lokola mokomi ya nzembo? Boye, osengeli naino kozwa momeseno ya kotángaka Biblia mokolo na mokolo. Yesu Klisto alobaki boye: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Matai 4:4) Na nsima, osengeli komanyolaka makambo oyo ozali kotánga. Soki ozali kokanisa na makambo oyo Biblia elobi mpo na Nzambe, bizaleli na ye, mokano na ye, mpe makambo oyo akosala, okobanda kolinga Biblia mingi. (Nzembo 143:5) Kosalela batoli na yango mokolo na mokolo nde likambo eleki ntina.​—Luka 11:28; Yoane 13:17.

Matomba nini okozwa soki ozali kolinga mpenza makambo oyo ezali na Biblia? Nzembo 119:2 elobi boye: “Esengo na baoyo [batosaka] litatoli na ye.” Matatoli oyo ezali na Biblia ekosalisa yo olonga mikakatano ya bomoi. (Nzembo 1:1-3) Okozwa bwanya, mayele, mpe bososoli, oyo ekosalisa yo ‘opekisa makaka na yo na nzela nyonso mabe.’ (Nzembo 119:98-101) Soki oyebi Nzambe mpe mokano na ye mpo na mabelé, okozala na bomoi moko ya ntina mpe na elikya mpo na mikolo ezali koya.​—Yisaya 45:18; Yoane 17:3; Emoniseli 21:3, 4.

Batatoli ya Yehova basepelaka mingi kosalisa bato mosusu báyeba Biblia mpe bálinga nsango na yango. Tosɛngi yo oyamba bango ntango bakoya kotala yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto