“Kaka mpo na mwa elenge ya mbula libwa”
MBALA nyonso oyo Batatoli ya Yehova bazalaki koya epai ya Wiesława, oyo afandaka na sudi ya Pologne, azalaki kotɔnda bango mpe koyebisa bango na limemya mpenza ete bakende. Kasi, mokolo moko Samuel, mwa elenge moko ya mbula libwa, ayaki ná mama na ye epai ya mwasi yango. Na mbala oyo, Wiesława andimaki koyoka nsango yango mpe azwaki zulunalo oyo ezalaki kolobela paladiso awa na mabelé.
Lokola Ekaniseli ya liwa ya Yesu Klisto ekómaki pene, Samuel asepelaki kobenga mwasi yango na libaku wana ya ntina mingi. Na yango, elenge wana ná mama na ye bayaki lisusu kotala ye, mpe mbala oyo amemaki lokasa ya libyangi. Ntango Wiesława amonaki ndenge elenge yango alataki, asɛngaki bango bázela mwa moke mpe akendaki kolata bilamba mosusu. Ntango azongaki, ayokaki Samuel, andimaki libyangi mpe atunaki: “Nakoki koya mpe na mobali na ngai?” Na nsima, abakisaki ete: “Ata soki ye ayei te, ngai nakoya. Nakoya kaka mpo na yo, Samuel.” Samuel asepelaki mpo mwasi yango akokisaki maloba na ye.
Ntango lisukulu ya Ekaniseli ezalaki kosalema, Samuel afandaki pene ya Wiesława mpe azalaki kolakisa ye bavɛrsɛ oyo bazalaki kotánga. Mwasi yango akamwaki mpenza. Asepelaki na Ekaniseli mpe na lolenge oyo makanisi ya mozindo elimbolamaki na maloba ya pɛtɛɛ. Asepelaki mpe ndenge bandeko bayambaki ye na esengo mpenza. Banda wana, Wiesława akómá kosepela mingi na makambo ya Nzambe mpe koyangana na makita nyonso ya Batatoli ya Yehova. Eumeli te, akomaki boye: “Nayokaka nsɔni ndenge nazalaki liboso koboya koyoka bino. Mpe mpo na koloba solo, nayokaki bino kaka mpo na Samuel, mwa elenge wana ya mbula libwa.”
Lokola Samuel, ebele ya bilenge Batatoli ya Yehova bazali kokumisa Nzambe na maloba mpe na etamboli na bango. Soki ozali elenge, yo mpe okoki kosalisa bato ya sembo bákóma kosepela na makambo ya Nzambe.