Bato ya motema boboto bakozwa mabelé
“Nakanisi ete mokili ekobongwana mpe ekokóma malamu. . . . Ekosalema lobi te, kasi na mikolo ekoya, mosika mpenza, na ntango oyo likoló moko ya sika mpe mabelé moko ya sika ekozala.”—Jean-Marie Pelt, moto ya mayele na botanike na France.
BATO mingi bazali komitungisa ntango bazali komona ndenge mokili mpe bomoi ya bato ezali se kobeba mpe bakosepela mingi soki mabelé oyo ebongwani paladiso. Nzokande, likambo yango ezali te kaka mposa moko oyo bato bakómi na yango mikolo oyo. Banda kala, Biblia elakaki ete mabelé ekozonga Paladiso. Bato mingi bayebi maloba ya Yesu oyo: “Bato ya elimo ya boboto . . . bakozwa . . . mabelé” mpe “Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 5:5; 6:10) Kasi, lelo oyo bato mingi te bazali kondima ete bato ya boboto bakofanda na paladiso awa na mabelé. Bato mosusu oyo bamibengaka baklisto bakanisaka te ete mabelé oyo ekozonga paladiso.
Zulunalo moko ya France (La vie) eyebisi ntina oyo bato—to Bakatolike—mingi bazali lisusu kondima paladiso te, ezala na mabelé to na likoló: “Na boumeli ya mbula soki 1 900, Lingomba ya Katolike ezalaki koteya ete paladiso ekozala; nzokande, lelo oyo, [liteya ya] paladiso eyokamaka lisusu te na ba retraite, na misa, na biteyelo ya teoloji to na malongi.” Liloba paladiso yango moko epesaka makanisi kilikili. Bateyi mosusu baboyaka kosalela liloba yango mpo “epesaka mingimingi makanisi ya bomoi ya esengo awa na mabelé.”
Frédéric Lenoir, moto ya mayele na makambo ya mangomba amonisi ete na mitó ya bato mingi, paladiso ekómá nde lisolo ya Adama ná Eva. Ndenge moko mpe, Jean Delumeau, moto ya mayele na masolo ya kala, oyo akomá babuku mingi na likambo etali paladiso, akanisi ete bilaka ya Biblia ekokokisama na ndenge ya elimo. Akomi boye: “Soki batuni ‘Paladiso ezali mpenza nini?’ Baklisto bayanolaka ete: Lokola Mobikisi asekwaki, mokolo mosusu tokozala na kimya mpe tokofanda na bomoi ya esengo.”
Ebongi mpenza koteyaka ete mabelé ekokóma paladiso? Mabelé ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya? Tokoki koyeba ndenge bomoi ekozala na mikolo ekoya? Lisolo elandi ekopesa biyano na mituna yango.