Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/5 nk. 3-4
  • Nzambe azali na mokano nini mpo na mabelé?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali na mokano nini mpo na mabelé?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Masolo mosusu
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Paradiso oyo Biblia elobeli ezali wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Nzambe alaki Paradiso
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/5 nk. 3-4

Nzambe azali na mokano nini mpo na mabelé?

MPO na nini osepelaka kotambola na esika oyo ezali na bafololo ya nsolo kitoko? Mpo na nini oyokaka esengo ntango ozali kotala mai moko kitoko to ngomba molai? Mpo na nini osepelaka koyoka bandɛkɛ bazali koyemba? Mpo na nini oyokaka esengo ntango ozali kotala ebele ya bamboloko bazali kokima to etonga ya bampate oyo bazali kolya matiti?

Mituna yango nyonso ezali kaka na eyano moko: Nzambe akelá biso mpo tófanda na Paladiso. Na ebandeli, bankɔkɔ na biso, Adama ná Eva, bazalaki na paladiso. Ntango Yehova Nzambe akelaki bango, atyaki na mitema na bango mposa ya kofanda na esika ya kitoko ndenge wana mpe bango batikelá biso mposa yango. Nzambe ayebaki ete tokozala na bomoi ya esengo soki tofandi na Paladiso mpamba te akelá biso na nyonso oyo esengeli mpo tósepela na esika ya ndenge wana.

Yehova akelaki mabelé na mokano nini? Biblia elobi ete “atongaki yango ete bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Ye oyo “asalaki mokili” atyaki Adama ná Eva na paladiso, na elanga ya Edene. (Yilimia 10:12; Genese 2:7-9, 15, 21, 22) Na ntembe te, bazalaki kosepela na bibale, bafololo, mpe banzete oyo ezalaki na elanga yango. Bazalaki komona bandɛkɛ na likoló mpe banyama ya ndenge na ndenge awa na mabelé. Ata nyama moko te ekokaki kosala bango mabe. Bazalaki mpe komona bambisi mpe bikelamu mosusu na kati ya mai. Likambo ya malamu koleka, Adama ná Eva bazalaki mwasi ná mobali. Bakokaki kobota bana mingi mpe nsukansuka kokómisa mabelé mobimba Paladiso.

Atako lelo oyo mabelé ezali paladiso te, tokoki kokokanisa yango na ndako moko kitoko epai libota moko ya esengo efandi. Nzambe apesi biso ndako yango mpe ezali na biloko nyonso oyo tozali na yango mposa: pole, molunge, mai, mpe bilei. Tosepelaka mpenza na pole mpe molunge ya moi mpe kongɛnga ya sanza na butu. (Genese 1:14-18) Na nse ya mabelé, tozali na biloko ndenge na ndenge oyo tokoki kosalela mpo na kozwa mɔtɔ. Mbula, bibale, balaki mpe mbu epesaka biso mai. Longola yango, mabelé ezali na bazamba mpe banzete ebele.

Na ndako tokoki kobomba ebele ya biloko ya kolya; ndenge moko mpe, mabelé etondi na biloko. Yehova ‘apesaka biso bileko ya kobota mbuma mpe atondisaka mitema na biso na nsai’ na ndenge oyo asalaka ete mabelé ebotaka ndunda mpe bambuma ndenge na ndenge. (Misala 14:16, 17) Soki lelo oyo mabelé ezali lokola ndako moko oyo etondi na biloko ya kitoko, kanisá ndenge ekokóma ntango Yehova, “Nzambe ya esengo,” akokómisa yango paladiso!​—1 Timote 1:11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto