Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/4 lok. 32
  • Lotomo ya kozala na nkombo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lotomo ya kozala na nkombo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/4 lok. 32

Lotomo ya kozala na nkombo

MOTO nyonso azali na lotomo ya kozala na nkombo. Na Tahiti, bapesaka nkombo ata na mwana oyo abotami sika oyo tata ná mama na ye basundoli ye. Leta apesaka mwana yango nkombo oyo bakokoma na mikanda.

Nzokande, ezali na moto moko oyo tokoki koloba ete bapimeli ye lotomo wana oyo moto nyonso azalaka na yango. Likambo ya kokamwa, moto yango ezali “Tata, oyo epai na ye libota nyonso na likoló mpe na mabelé ezwi nkombo na yango”! (Baefese 3:14, 15) Bato mingi baboyaka kobenga Mozalisi na nkombo na ye oyo ezali na kati ya Biblia. Basepelaka kobenga ye na batitre lokola “Nzambe” to “Nkolo.” Kasi, nkombo na ye ezali mpenza nani? Mokomi ya nzembo apesaki eyano na motuna yango na maloba oyo: “Yo oyo azali na nkombo [Yehova] Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba.”​—Nzembo 83:18.

Na ebandeli ya bambula ya 1800, ntango bamisionɛrɛ ya ebongiseli oyo babengaka Société missionnaire de Londres bakómaki na Tahiti, bato oyo bakutaki na bamboka yango bazalaki kosambela banzambe ebele. Mokomoko ya banzambe yango azalaki na nkombo na ye; banzambe oyo bayebanaki mingi ezalaki Oro mpe Taaroa. Mpo na kokesenisa banzambe yango na Nzambe ya Biblia, bamisionɛrɛ basalelaki mingi nkombo ya Nzambe Iehova, ndenge babongolaki yango na monɔkɔ ya Tahitien.

Bato bayebaki nkombo yango malamu mpe bakómaki kosalela yango ntango bazali kosolola to mpe na mikanda na bango. Pomaré II, mokonzi oyo ayangelaki Tahiti na ebandeli ya bambula ya 1800, azalaki kosalela nkombo yango na mikanda na ye. Likambo yango emonisami polele na mokanda moko oyo ezali awa na nse. Mokanda yango ekomamaki na Lingelesi mpe ezali na ndako ya kobomba biloko ya kala ya Tahiti mpe ya bisanga na yango. Yango emonisi ete na ntango wana, bato bazalaki kokakatana te kosalela nkombo ya Nzambe. Longola yango, nkombo ya Nzambe ezali na bisika ebele mpenza na Biblia ya liboso oyo babongolaki na monɔkɔ ya Tahitien, oyo ebimaki na 1835.

[Elilingi na lokasa 32]

Mokonzi Pomaré II

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

Mokonzi mpe mokanda: Collection du Musée de Tahiti et de ses Îles, Punaauia, Tahiti

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto