Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/4 lok. 32
  • Nzambe azali kaka kotambwisa makambo awa na mabelé?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali kaka kotambwisa makambo awa na mabelé?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/4 lok. 32

Libyangi . . .

Nzambe azali kaka kotambwisa makambo awa na mabelé?

MAKAMA, bamaladi ya mabe, kanyaka, bateroriste, bitumba, kobomana. Ezali mpasi mokolo mobimba eleka kozanga ete tóyoka bansango ya ndenge wana. Ezala makambo yango ekómelá yo to te, ezali mwa mpasi ozanga komituna soki mokili oyo ezali kokende wapi mpe soki mokolo moko makambo ekobonga.

Mpo na koyanola na mituna wana, Batatoli ya Yehova na mikili koleka 200 bakosala lisukulu moko oyo elobi: “Nzambe azali kaka kotambwisa makambo awa na mabelé?” Lisukulu yango ekolobela oyo Nzambe alobi mpe alaki na kati ya Liloba na ye Biblia oyo ekosaka te, na ntina na mituna ya ntina mingi oyo:

Nzambe akipaka mpenza makambo ya mokili?

Ndenge nini atalelaka bato?

Amibanzabanzaka mpo na bolamu na yo?

Na bisika mingi, lisukulu yango ekosalema mwalomingo 30 Aprili 2006, na Bandako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova. Batatoli ya kartye na yo bakozala na esengo ya koyebisa yo ngonga mpe esika oyo lisukulu yango ekosalema.

Tozali kobenga yo na esengo mpenza na lisukulu yango ya kolendisa oyo ekopesa eyano ya malamu mpenza na motuna oyo: Nzambe azali kaka kotambwisa makambo awa na mabelé?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto