Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/3 lok. 31
  • Bazalaki na ekateli ya kokóma kuna

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazalaki na ekateli ya kokóma kuna
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/3 lok. 31

Bazalaki na ekateli ya kokóma kuna

BAYISALAELE basengelaki kokendaka na Yelusaleme mbala misato na mbula mpo na bafɛti oyo ezalaki kosalema mbula na mbula. (Deteronome 16:16). Lelo oyo, Batatoli ya Yehova basalaka milende mpo na kokende na mayangani oyo esalemaka mbula na mbula ndenge lisolo ya Batatoli ya Yehova ya ntango na biso na Congo emonisi yango.

Lokola banzela ebebaki na 1970, ezalaki mbala mingi mpasi mpo bakɛngɛli ya etúká mpe bandeko mosusu bákende na mayangani. Na ndakisa, tósala mobembo elongo na William Smith, mokɛngɛli ya etúká na mobembo oyo asalaki mpo na kokende na liyangani moko ya zongazonga.

“Mai ya mbula etondaki na kati ya mboka mpe etondisaki bibale. Tozalaki kokende na Kamina epai liyangani moko ya zongazonga esengelaki kosalema. Tosengelaki kosala bakilomɛtrɛ koleka 300. Bambula ya minene ekómisaki babalabala mosusu pɔtɔpɔtɔ. Na bisika mosusu ezalaki mpasi koyeba esika nzela ezali. Lobwaku moko ekómaki laki. Bavuatire mpe mituka ya guvɛrnema etɛlɛmaki bisika nyonso. Basofɛlɛ na yango bazalaki kozela mai ekita. Mingi na bango bakanisaki ete bakoumela wana pɔsɔ mibale.

“Nayebaki ete bandeko bazali kozela liyangani na motema likoló. Basusu kati na bango batambolaki mikolo ebele mpo na koyangana na liyangani yango. Natunaki soki nzela mosusu ezali mpo na kokima lobwaku. Likambo ya kokamwa, bayebisaki ngai ete Batatoli ya Yehova basalaki nzela moko ya moke mpo na kokima lobwaku yango. Kasi, lokola mabelé ezalaki pɛtɛpɛtɛ, Batatoli baboyaki moto ata moko aleka wana liboso mokɛngɛli ya etúká aleka mpo na kokende na kamina.

“Bandeko ya mboka mibale basalaki mokolo mobimba, butu mobimba mpe mokolo elandaki mpo na kofungola nzela ya kokima lobwaku wana. Eumelaki te, nakutanaki na bandeko mpe namibongisaki mpo naleka na motuka na nzela oyo bandeko basalaki. Bato ebele batondaki wana mpo na kotala soki motuka ekoleka. Toyokaki mawa makasi ntango tomonaki motuka ezindi na pɔtɔpɔtɔ kaka nsima ya kosala mwa bamɛtɛlɛ!

“Bandeko bamekaki ndenge nyonso kotindika motuka, kasi ezalaki kobima te. Emonanaki ete balɛmbi nzoto mpamba te basalaki mosala makasi. Atako bongo, ekateli na bango ezalaki ya kokomisa mokɛngɛli ya etúká na esika ya liyangani. Lokola emonanaki ete nzela ya sika ezalaki na makama ebele, bato bazongaki na mituka na bango. Kasi bandeko bazwaki ekateli ya komeka lisusu. Mpo na mbala oyo, babimisaki biloko nyonso oyo ekómisaki motuka kilo: mikanda, ekoliseli-lolaka, masini ya kopelisa lotiliki (groupe électrogène) mpe biloko mosusu. Batimolaki pembenipembeni ya motuka, batindikaki yango tii nsukansuka ebandaki kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ.

“Ngonga moko na nsima, togangaki na esengo mpe toyembaki banzembo ya Bokonzi, tosepelaki lokola motuka elekaki atako nzela yango ezalaki na pɔtɔpɔtɔ. Bandeko bakokisaki likambo bato oyo bafandaki na mituka na bango bakanisaki ete ekosalema te. Liyangani elekaki malamu mpo bandeko basalaki mosala makasi. Yehova asungaki basaleli na ye mpe asalisaki bango básala mokano na ye.”

Lelo oyo, molende ya ndenge wana nde epusaka bato nyonso oyo bazali koyangana na mayangani oyo ebongisami na teritware wana monene. Na yango, bato pene na 520 000: Batatoli, baninga ya solo mpe bana na bango bayanganaki na liyangani oyo esalemaki na sanza ya Augusto mpe Sɛtɛmbɛ 2005 oyo ezalaki na motó ya likambo ‘Botosi oyo esepelisaka Nzambe.’

[Elilingi na lokasa 31]

Kobeba ya banzela, ezalaki kosala ete mibembo ezala ya mpasi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto