Osepelaka kozala na baninga ya malamu?
BATO mingi basepelaka kozala na baninga ya malamu. Kobɛtɛla baninga ya motema masolo na yo ekoki kosala ete bomoi ezala ya esengo. Kasi, ndenge nini okoki kozwa baninga ya malamu? Esili koleka pene na mbula 2000, Yesu amonisaki ete ezaleli ya ntina oyo ekoki kosalisa moto afanda malamu na bato nyonso ezali bolingo ya solosolo. Ateyaki boye: “kaka ndenge bino bolingaka ete bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.” (Luka 6:31) Maloba oyo babengaka mbala mingi lilako lileki malamu ezali komonisa ete mpo ozwa baninga, osengeli kozala moto oyo amipimelaka mpe akabaka. Na yango, mpo ozala na baninga, osengeli kozala moto oyo alingaka bato. Ndenge nini?
Esɛngaka ntango mpo na kosala boninga ya solosolo. Kozala moninga ya moto ekeseni na koyeba ye kaka likolólikoló. Ezali na bato mosusu oyo osepelaka na bango kaka boye. Kokolisa mpe kobatela boninga ya solosolo esɛngaka molende. Kozala moninga ya solo esɛngaka mbala mingi kotya bamposa ya moninga liboso ya makambo oyo yo moko osepelisaka na yango. Baninga ya solosolo bazalaka elongo na ntango ya bisengo mpe na ntango ya mpasi.
Okomonisa ete ozali moninga ya solosolo soki osalisaka moto ntango azali na bosɛnga. Masese 17:17, NW elobi ete: “Moninga ya solo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” Ntango mosusu baninga balinganaka kutu koleka bandeko ya makila. Masese 18:24, NW emonisi boye: “Ezali na baninga oyo basalanaka mabe, kasi ezali na moninga oyo atikalaka penepene koleka ndeko.” Okolinga koyeba makambo mosusu oyo osengeli kosala mpo osala boninga ya solosolo? Okolinga okóma moko ya bato oyo bayebani ete bazalaka na bolingo na kati na bango? (Yoane 13:35) Soki ɛɛ, Batatoli ya Yehova na esika ofandi bakosepela kolakisa yo ndenge ya kozwa baninga ya solosolo.