“Yebisá biso makambo mosusu!”
NA ENGUMBA Nezlobnaya, na ekólo Russie, bana-kelasi ya eteyelo moko ya ntei bazalaki koyekola makomi ya Mikhail Bulgakov, mokomi moko ya ekólo na bango. Na kati ya makomi ya moto yango, ezalaki mpe na buku moko oyo elobeli Yesu Klisto na ndenge moko ya lityo mpenza, kasi ezali kokumisa Satana ete azali elombe. Nsima ya kolobela buku yango elongo na bayekoli, molakisi asɛngaki mwana mokomoko akoma mwa lisolo moko oyo elobeli buku yango. Nzokande Andrey, moyekoli moko ya mbula 16 oyo azalaki Motatoli ya Yehova asɛngaki molakisi na limemya nyonso ete alimbisa ye asala devuare yango te, mpamba te lisosoli na ye ezali kopekisa ye ayekola mikanda ya ndenge wana. Kasi, asɛngaki molakisi ete ye akoma lisolo oyo ekolimbola ndenge atalelaka Yesu Klisto. Molakisi andimaki.
Na lisolo na ye, Andrey alobaki ete atako azali komemya makanisi ya basusu, amoni ete lolenge eleki malamu ya koyekola makambo etali Yesu ezali kotánga moko ya Baevanzile minei. Soki osali bongo, “okoyeba bomoi mpe mateya ya Yesu, oyo elobelami na bato oyo bamonaki ye na miso.” Andrey abakisaki boye: “Likambo mosusu oyo namoni mabe ezali ndenge buku yango elobeli Satana. Bato mosusu bakoki kosepela kotánga buku oyo ezali kolobela Satana lokola elombe, kasi ngai te.” Alimbolaki ete Satana azali mpenzampenza nde ekelamu moko ya elimo, ya mabe mpe ya nguya, oyo apesá Nzambe mokɔngɔ mpe amemelá bato mabe, mpasi mpe mitungisi nyonso oyo bazali na yango. Andrey asukisaki boye: “Nandimi te ete kotánga buku yango ekosalisa ngai. Ya solo, nayinaka Bulgakov te. Kasi, ngai namoni ete mpo na koyeba solo na ntina na Yesu Klisto, ekozala malamu natánga nde Biblia.”
Molakisi ya Andrey asepelaki mpenza na lisolo wana mpe asɛngaki ye amibongisa mpo na kolobela Yesu Klisto liboso ya baninga na ye ya kelasi. Andrey andimaki na esengo nyonso. Mokolo oyo bazalaki lisusu na liteya yango, Andrey atángaki lisolo na ye liboso ya kelasi mobimba. Alimbolaki ntina oyo amonaka ete Yesu azali moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Na nsima, atángaki mokapo moko ya mokanda ya Matai oyo elobeli liwa ya Yesu. Lokola ngonga oyo bapesaki ye esilaki, Andrey alingaki kosukisa lisolo na ye, kasi baninga na ye ya kelasi bagangaki: “Yebisá biso makambo mosusu! Nini esalemaki na nsima?” Atángelaki bango lisusu na mokanda ya Matai lisolo ya lisekwa ya Yesu.
Ntango Andrey asilisaki lisolo na ye, baninga na ye batunaki ye mituna ebele na ntina na Yesu mpe Yehova. Andrey alobi boye: “Nabondelaki Yehova apesa ngai bwanya, mpe ayokaki libondeli na ngai. Nayanolaki na mituna na bango nyonso! Nsima ya liteya yango, Andrey apesaki molakisi na ye buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo,a mpe molakisi azwaki yango na esengo nyonso. Andrey alobaki boye: “Apesaki ngai bilembo ebele mpo na lisolo na ngai mpe akumisaki ngai na ndenge nakangamá na bindimeli na ngai mpe nayokelaka yango nsɔni te. Alobaki mpe ete andimaka makambo mosusu oyo ngai nandimaka.”
Andrey azali na esengo mpenza mpo na ekateli oyo azwaki ya koyokela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia mpe aboyaki kotánga makambo oyo ezali kobebisa lokumu ya Yehova mpe ya Mwana na ye, Yesu Klisto. Ekateli wana ebatelaki ye kaka te na makanisi oyo ezali kotɛmɛla Biblia, kasi epesaki ye mpe libaku ya koteya basusu nsango ya bomoi oyo ezali na Biblia.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.