Mituna ya batángi
Wapi makama misato oyo Yesu akebisi biso na yango na Matai 5:22?
Na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu Klisto akebisaki bayekoli na ye na maloba oyo: “Ngai nazali koloba na bino ete moto nyonso oyo akokoba kozala na nkanda na ndeko na ye akozongisa monɔkɔ na esambiselo; kasi moto nyonso oyo akoloba na ndeko na ye liloba ya kotyola oyo ekoki kutu kolobelama te akozongisa monɔkɔ na Esambiselo Monene; nzokande moto nyonso oyo akoloba ete, ‘Yo bolole ya nsuka!’ akoleka na Gehena ya mɔtɔ.”—Matai 5:22.
Yesu asalelaki biloko oyo Bayuda bayebaki malamu—esambiselo, Esambiselo Monene, mpe Gehena ya mɔtɔ—mpo na komonisa bango ete etumbu oyo moto akozwa ekotalela bonene ya lisumu na ye.
Ya liboso, Yesu alobaki ete moto nyonso oyo akokoba kozala na nkanda na ndeko na ye akozongisa monɔkɔ na “esambiselo” to tribinale ya mboka. Balobaka ete batribinale yango ezalaki na bingumba nyonso oyo ezalaki na mibali oyo bakoli 120 to koleka. (Matai 10:17; Malako 13:9) Bazuzi ya batribinale yango bazalaki na lotomo ya kosambisa ata moto oyo abomi mozalani na ye. (Deteronome 16:18; 19:12; 21:1, 2) Na yango, Yesu amonisaki ete moto oyo azali kobombela ndeko na ye nkanda na motema azali kosala lisumu monene.
Ya mibale, Yesu alobaki ete moto oyo “akoloba na ndeko na ye liloba ya kotyola oyo ekoki kutu kolobelama te akozongisa monɔkɔ na Esambiselo Monene.” Liloba ya Grɛki, rhaka oyo babongoli na “liloba ya kotyola oyo ekoki kutu kolobelama te,” elimboli “mpamba” to mpe “zoba.” Diksionɛrɛ moko (The New Thayer’s Greek-English Lexicon of the New Testament) emonisi ete ezalaki “liloba ya kofinga epai ya Bayuda na ntango ya Klisto.” Na yango, Yesu amonisaki ete kofinga moto na liloba ya kotyola ndenge wana ezali lisumu monene. Ezalaki lokola nde Yesu alobaki ete moto nyonso oyo asaleli maloba yango akosambisama na tribinale ya mboka te, kasi na Esambiselo Monene, elingi koloba Sanedrina mobimba—tribinale ya Yelusaleme oyo esangisaki nganga-nzambe monene, mikóló mpe bakomeli 70.—Malako 15:1.
Ya misato, Yesu amonisaki ete soki moto alobi na moninga ete: “Yo bolole ya nsuka!” akoleka na Gehena ya mɔtɔ. Liloba “Gehena” euti na maloba ya Liebele gé hinnom, oyo elimboli “lobwaku ya Hinomo,” oyo ezalaki na libándá ya Yelusaleme. Na ntango ya Yesu, lobwaku yango ekómaki esika ya kotumba bosɔtɔ, ata mpe bibembe ya babomi-bato oyo bazalaki kotalelama ete babongi te kokundama. Na yango, liloba “Gehena” ezalaki elilingi oyo ebongi mpenza mpo na kolobela libebi ya seko.
Boye, liloba “bolole ya nsuka” elimbolaki nini? Liloba oyo Yesu asalelaki ekokani na liloba ya Liebele oyo elimboli “motomboki.” Emonisaka moto moko oyo asalaka makambo ezangá ntina, mopɛngwi mpe moto oyo azali kotombokela Nzambe. Na yango, moto oyo afingi moninga na ye ete “bolole ya nsuka” ezali lokola nde alobi na ye ete asengeli kozwa etumbu oyo ebongi na moto oyo azali kotombokela Nzambe, elingi koloba libebi ya seko. Na miso ya Nzambe, moto oyo alobi na mozalani na ye ete akozwa etumbu ya ndenge wana, ye moko nde abongi kozwa yango.—Deteronome 19:17-19.
Na yango, Yesu apesaki bayekoli na ye etinda oyo elekaki mitinda oyo esimbaki Mibeko ya Moize. Bato bazalaki kokanisa ete moto oyo abomi mozalani na ye “akozongisa monɔkɔ na esambiselo,” nzokande Yesu akendaki mwa mosika. Ateyaki bayekoli na ye ete basengeli ata moke te kobombela bandeko na bango nkanda na motema.—Matai 5:21, 22.