“Makomi eleki koumela oyo ezali na maloba euti na Biblia”
ELEKI sikoyo mbula 25, bato ya arkeoloji ya Israël bakundolaki eloko moko ya kokamwa. Na esika moko oyo ezalaki malita, na Lobwaku ya Hinome na Jérusalem, bamonaki mwa barulo mibale ya palata oyo ezalaki na maloba ya Biblia. Barulo yango ekomamaki liboso bato ya Babilone bábebisa Yelusaleme na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na makomi yango batángi ndambo ya maloba ya mapamboli oyo ezali na Mituya 6:24-26. Nkombo ya Nzambe, Yehova, ezali na bisika mingi na barulo yango. Balobaki ete makomi yango ezali “eloko eleki koumela oyo bato ya ntango ya kala basalá oyo ezali na maloba ya Biblia ya Liebele.”
Nzokande, dati oyo balobi ete barulo yango ekomamaki, bato mosusu ya mayele babɛtelaki yango ntembe; balobaki ete ekomamaki na ekeke ya mibale L.T.B. Moko na bantina oyo etindaki bango báboya kondima dati oyo bakomaki barulo yango ezali ete bafɔtɔ ya liboso oyo bakangaki yango esalisaki te mpo na kotalela makambo mosusu malamumalamu. Mpo na kosilisa ntembe yango, ekipi moko ya bato ya mayele etalelaki lisusu barulo yango. Basalelaki bamasini ya fɔtɔ ya mikolo oyo mpe ordinatɛrɛ oyo ekoki koyeisa bililingi monene mpo makambo nyonso emonana polele. Bauti koyebisa makambo oyo bamonaki na bolukiluki yango. Bato yango bamoni nini?
Ya liboso, bato ya mayele balobi ete makambo ya arkeoloji emonisi ete barulo yango ekomamaki liboso Bayuda bákende na boombo na Babilone. Boyekoli ya balɛtrɛ oyo esalelamaki, lolenge na yango, ndenge babongisaki yango, ndenge balandisaki yango, mpe ndenge balalisaki yango, emonisi mpe ete barulo yango ekomamaki na dati wana, elingi koloba na nsuka ya ekeke ya nsambo L.T.B. Na nsuka, ntango bayekolaki ekomeli, bato yango ya mayele balobaki boye: “Ekomeli oyo ezali na bitanda [barulo] yango emonisi ete ekomamaki kaka na dati wana na kotalela makambo ya arkeoloji mpe boyekoli ya balɛtrɛ oyo toyebi mpo na ntango wana.”
Zulunalo moko (Bulletin of the American Schools of Oriental Research) elobeli likambo ya barulo yango ya palata, oyo babengaka mpe “Rouleaux de Ketef Hinnom,” na maloba oyo: “Yango wana, tokoki kozongela makanisi oyo bato mingi ya mayele balobaki liboso ete, bitanda wana ezali na makomi eleki koumela oyo ezali na maloba euti na Biblia.”
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
Lidusu: Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.; makomi: Fɔtɔ © Israel Museum, Jérusalem; na ndingisa ya Israel Antiquities Authority