Bazali kosalisa bato ya Chine oyo bafandaka na Mexique
“BATO zomi longwa na mabota ya maloba nyonso, bakosimba elamba ya moto oyo azali Moyuda, bakoloba ete, Tokokenda na yo elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zekalia 8:23) Esakweli yango ezali kokokisama lelo oyo na mokili mobimba. Bato ya “mabota ya maloba nyonso” bazali kokangama na Bayisalaele ya elimo mpo na kosambela Yehova Nzambe. Batatoli ya Yehova basepelaka na kokokisama ya esakweli yango. Mingi kati na bango bazali koyekola minɔkɔ mosusu mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba.
Batatoli ya Yehova na Mexique mpe batikali nsima te. Na Mexique, bato oyo balobaka monɔkɔ ya Chinois bazali soki 30 000. Na mobu 2003, bato 15 kati na bango bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto na engumba Mexico. Likambo yango esalisaki Batatoli ya Mexique bámona ete bakoki kobuka mbuma malamu na elanga yango ya elimo. Mpo na kozwa basakoli mingi oyo bakoki kosalisa bato oyo balobaka monɔkɔ ya Chinois, babongisaki kelasi ya sanza misato mpo na kolakisa Batatoli ya Mexique ndenge ya kopesa litatoli mokuse na monɔkɔ ya Mandarin (Chinois). Batatoli 25 bakɔtaki kelasi yango. Momonisi moko ya bato ya Chine na engumba Mexico azalaki wana na mokolo oyo bapesaki bana-kelasi badiplome; likambo yango emonisi ete bato ya Chine basepelaki na ebongiseli wana. Ebongiseli moko ya bato ya Chine na Mexico esepelaki kopesa bana-kelasi misato bourse mpo bákende koyekola monɔkɔ ya Chinois malamumalamu na mboka mopaya.
Na bantango mosusu, mateya yango ezalaki kosɛnga ete bana-kelasi bábima mpo na kosolola na bato oyo balobaka monɔkɔ yango. Nsima ya koyekola bafraze ya mikemike, bana-kelasi babandaki mbala moko koteya na monɔkɔ ya Chinois na kartye ya mombongo ya engumba Mexico. Bana-kelasi yango ya molende babandaki koyekola Biblia na bato 21. Mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? na monɔkɔ ya Chinois oyo ekomami na makomi ya alfabɛ, oyo babengaka Pinyin, esalisaki bango mingi.
Ndenge nini Batatoli yango, oyo babandaki kelasi sika, bazalaki koyekola Biblia na bato na monɔkɔ ya Chinois? Na ebandeli, bazalaki kaka koloba, “Qing Du [Nasɛngi yo otánga]” mpe bazalaki kolakisa paragrafe, na nsima, motuna. Soki moto atángi na Chinois mpe apesi eyano, bazalaki koloba, “Shei shei [Mersi]” mpe, “Hen Hao [Malamu mingi].”
Ndeko moko abandaki koyekola Biblia ná mwasi moko oyo azalaki moklisto. Nsima ya koyekola mbala ya misato, Motatoli amitunaki soki mwasi yango azali mpenza kokanga ntina. Yango wana abimaki na ndeko moko oyo monɔkɔ ya mboka na ye ezali Chinois. Ntango ndeko wana atunaki mwasi yango soki azali na motuna, mwasi yango alobaki: “Mpo nazwa batisimo, nasengeli nde koyeba kobɛta mai?”
Mwa moke na nsima, bafungolaki Boyekoli ya mokanda, epai bato soki 9 oyo balobaka monɔkɔ ya Chinois mpe bana-mboka Mexique 23 bazalaki koyangana. Kati na bato ya Chine oyo bazalaki koyangana ezalaki mpe na monganga moko; moto moko ya maladi oyo ye azalaki kosalisa apesaki ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na monɔkɔ ya Espagnol. Lokola ayebaki kotánga Espagnol te, asɛngaki na moto moko abongolela ye mwa bafraze. Ntango ayebaki ete bazulunalo yango ezali kolimbola Biblia, atunaki moto oyo apesaki ye yango soki akoki kozwa yango na monɔkɔ ya Chinois. Amemelaki ye yango, mpe biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Mexique ezwaki bibongiseli mpo Motatoli moko oyo ayebi monɔkɔ ya Chinois akende kotala ye. Ntango monganga yango azalaki na Chine, azalaki kosepela mingi kotánga Biblia ya mama na ye. Ntango azwaki likanisi ya kokende kofanda na Mexique, mama na ye ayebisaki ye atika kotánga Biblia te. Na yango, azalaki kobondela mpo moto moko asalisa ye ayeba Nzambe oyo Biblia ezali kolobela. Alobaki ete: “Nzambe ayoki libondeli na ngai!”
Bato mosusu oyo bazalaki koyangana na boyekoli yango ezali libota moko ya bato ya Chine oyo bazalaki kofutela epai ya mwasi moko moto ya Mexique oyo azalaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Atako libota yango bazalaki koyoka Espagnol malamu te, bazalaki kofanda mpo na kolanda masolo ya Biblia. Na nsima, libota yango batunaki Motatoli oyo azalaki kotambwisa boyekoli soki azali na mikanda na monɔkɔ ya Chinois. Mwa moke na nsima, babandaki koyekola na monɔkɔ ya Chinois. Eumelaki te, libota yango bamonisaki mposa ya kosakola epai ya bato ya ekólo na bango mpe ya komipesa na Yehova.
Ya solo, koyekola monɔkɔ ya Chinois ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi, ndenge masolo oyo emonisi yango, na lisalisi ya Yehova, bato ya minɔkɔ ndenge na ndenge, ata mpe oyo balobaka monɔkɔ ya Chinois, bazali koyekola mokano ya Nzambe, ezala na Mexique to na bisika mosusu na mokili.
[Elilingi na lokasa 17]
Kelasi ya monɔkɔ ya Chinois na Mexico
[Elilingi na lokasa 18]
Motatoli moko ya Mexique azali kotambwisa boyekoli ya Biblia na monɔkɔ ya Chinois
[Elilingi na lokasa 18]
Bazali kosakola ndako na ndako epai ya bato ya Chine, na Mexico