Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/12 lok. 3
  • Bafɛti ya nsuka ya mbula ekozala ndenge ozali kokana?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bafɛti ya nsuka ya mbula ekozala ndenge ozali kokana?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • Fɛti ya Noele ezalaka mpenza mpo na nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Nini etindaka bato básala makambo oyo basalaka na Noele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Biutelo Ya Eyenga ya Mbotama na Mikolo na Biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Kokanisa Yesu Kristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/12 lok. 3

Bafɛti ya nsuka ya mbula ekozala ndenge ozali kokana?

“Pierre [le Grand] apesaki etinda ete básalaka misa na bandako-nzambe nyonso na mokolo ya 1 Yanuali. Lisusu, alobaki ete bátyaka bitape ya nzete ya sapin likoló ya baporte ya bandako, mpe ayebisaki bato nyonso ya engumba Moscou ete basengeli ‘kosepelaka mpe kotombelana mobu molamu na mongongo makasi’ na mokolo ya Bonane.”​—Buku Peter the Great—His Life and World.

MAKAMBO nini ozali kolikya mpo na bafɛti ya nsuka ya mbula? Na mokili mobimba, bato bamonaka ete eleko yango ezalaka libosoliboso mpo na fɛti ya Noele, oyo balobaka ete ezali mokolo Klisto abotamaki; kasi fɛti ya Bonane ezalaka mpe na eleko yango. Elingi koloba ete eleko yango ezwaka mikolo mwa mingi. Baboti mpe bana bakoki kozala na konje, na yango ezalaka ntango malamu mpo na kokutana libota mobimba. Kasi bato mosusu, lokola balingaka kokumisa Klisto, babengaka mikolo yango “Eleko ya mbotama.” Mbala mosusu yo mpe omonaka ete kokumisa Klisto nde likambo eleki ntina na eleko yango.

Ata soki eleko yango ezalaka mpo na kokumisa Klisto, to mpo na kosepela na kati ya libota, to mpe mpo na nyonso mibale, likambo ya solo ezali ete bato mingi: mibali, basi mpe bana, bazelaka mpenza mikolo yango. Mpo na yo, bafɛti ya nsuka ya mbula oyo ekozala ndenge nini? Ekozala ntango ya malamu mingi mpo na libota na bino? Yango ekozala ntango ya komipesa na makambo ya Nzambe? Soki bozali kokana kokutana libota mobimba, ekozala mpenza ndenge bozali kokana to ekotika nde suvenire ya mabe?

Bato mingi oyo balingaka ete eleko yango ezala ntango ya losambo, mbala mingi bamonaka ete fɛti ya Noele mpe ya Bonane ezalaka ata na likambo moko te oyo ekumisaka Klisto. Kutu, eleko yango ekómá nde ntango ya kozwa bakado, ya kosala fɛti oyo na kati na yango basalaka makambo oyo ebebisaka lokumu ya Klisto, to mpe mingimingi libaku ya kokutana libota mobimba. Mbala mingi, na bafɛti yango ekómaka ete moto moko to bato mingi bálya na kolekisa ndelo, bálangwa masanga, báloba makambo oyo mbala mingi esalaka ete mobulu ebima na kati ya libota. Ekoki kozala ete osilá komona makambo yango, to mpe esilá kokómela yo.

Soki ezali bongo, boye mbala mosusu ozali kokanisa ete makambo ebongwani mpenza te banda na ntango ya Pierre le Grand, mokonzi ya Russie oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo. Lokola bato mingi bazali komitungisa mpo na makambo oyo ezali kosalema na mokili, mposa na bango ezali ete eleko yango ezala ntango ya komipesa na makambo ya Nzambe mpe kozwa libaku malamu ya kokutana libota mobimba. Kutu, bato mosusu bazali kosala milende mpo mbongwana esalema, bazali koloba ete oyo ezali ntango ya kokanisa Yesu. Kasi, makambo ekoki mpenza kobongwana? Mpe soki ebongwani ekokumisa mpenza Klisto? Tozali nde na bantina ya kotalela ndenge mosusu eleko yango ya fɛti ya Noele mpe ya Bonane?

Mpo na kozwa biyano oyo ebongi, tótalela makanisi ya bato ya ekólo moko oyo basengeli mpenza kozala na ntina ya kosepela na eleko yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto