Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/11 lok. 32
  • ‘Bolingo na bino nyonso ezali kobakisama’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Bolingo na bino nyonso ezali kobakisama’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/11 lok. 32

‘Bolingo na bino nyonso ezali kobakisama’

NA MOBU 2004, makama mingi esalamaki na Japon; na ndakisa mipɛpɛ makasi, mpela, mpe koningana ya mabelé. Mpo na yango, bomoi ya bato mingi ebebaki, ata mpe ya Batatoli ya Yehova. (Mosakoli 9:11) Nzokande, makama yango epesaki mpe Batatoli mabaku ya komonisana bolingo ya bondeko.​—1 Petelo 1:22.

Na ndakisa, lokola bambula makasi ebɛtaki na sanza ya Yuli, ebale moko ya Japon etondaki. Mpela ezindisaki bandako koleka 20 ya Batatoli ya Yehova. Na Ndako ya Bokonzi moko, mai ekómaki tii na mɛtrɛ 1. Ntango kaka Batatoli ya masangá ya pembeni bayokaki yango, bakendaki nokinoki kosalisa bandeko na bango. Bankama ya bandeko bapɛtolaki bandako oyo etondaki na pɔtɔpɔtɔ. Basalaki pɔsɔ mibale mpo na kosukola mpe kobongisa Ndako ya Bokonzi.

Na mokolo ya 23 Ɔkɔtɔbɛ, mabelé eninganaki mpe na etúká yango (na degré 6,8). Bato koleka 40 bakufaki, mpe bato 100 000 batikaki bandako na bango. Mai mpe kura ezalaki te. Atako esika oyo koningana ya mabelé ebandaki ezalaki kaka na ntaka ya kilomɛtrɛ 50, Ndako ya Bokonzi oyo bautaki kobongisa ebebaki lisusu te. Ekómaki esika oyo bazalaki kosalisa bandeko mpe kopesa bango biloko oyo bazalaki na yango mposa. Bankulutu balukaki koyeba soki bandeko nyonso bazali malamu mpe basepelaki komona ete ata moko na bango te azwaki likama to akufaki. Na ntɔngɔntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, bandeko mibali motoba oyo bango mpe bazwaki likama ntango mpela esalemaki na sanza ya Yuli bandimaki mosala ya komemela bandeko oyo bazalaki kofanda esika oyo mabelé eninganaki biloko ya kolya ná mai. Biloko oyo bakokaki kosalisa na yango bandeko ekómaki mwa bangonga moke kaka nsima ya koningana ya mabelé.

Nkulutu moko alobi boye: “Bandeko oyo biloko na bango ebebaki na mpela bamonaki ete kosalisa bandeko oyo biloko na bango ebebaki na koningana ya mabelé, ezali libaku ya komonisa botɔndi mpo na lisungi oyo bango bazwaki ntango likama ekwelaki mpe bango. Basalaki mosala makasi banda ntɔngɔ tii butu. Bilongi na bango ezalaki kolakisa ete bazali na esengo!”

Eloko moko te, ezala mpela to koningana ya mabelé, ekoki kobebisa bolingo oyo ezali na kati ya Batatoli ya Yehova. Kutu, ntango makama ya ndenge wana esalemaka, baklisto bamonaka bosolo ya maloba oyo ntoma Paulo ayebisaki bandeko ya Tesaloniki ete: “Bolingo ya moko na moko na bino nyonso epai ya mosusu ezali kobakisama.”​—2 Batesaloniki 1:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto