Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/10 lok. 32
  • Ozali “moto ya bomɛngo epai ya Nzambe”?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali “moto ya bomɛngo epai ya Nzambe”?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/10 lok. 32

Ozali “moto ya bomɛngo epai ya Nzambe”?

NA KATI ya bandakisa oyo Yesu apesaki oyo etindaka bato bákanisa malamumalamu, ezali na ndakisa moko ya nkolo mabelé ya bozwi mingi. Mpo akelela na nsima te, moto yango akanaki komitongela bandako ya minene ya kobomba biloko. Nzokande, na ndakisa oyo Yesu apesaki, abengaki moto yango “zoba.” (Luka 12:16-21) Babiblia mosusu kutu ebengi ye ‘moto azangá mayele.’ Mpo na nini Yesu asalelaki maloba makasi ndenge wana mpo na moto yango?

Emonani mpenza ete moto yango ya bomɛngo akanisaki Nzambe ata moke te ntango azalaki kozwa mikano na ye; abosanaki mpe ete Nzambe nde asalaka ete bilanga ebota. (Matai 5:45) Atutaki ntolo ete: “Molimo, ozali na biloko ebele ya malamu oyo ebombami mpo na bambula mingi; pemá, lyá, mɛlá, misepelisá.” Akanisaki ete ebele ya biloko oyo bilanga na ye ebimisaki ekozala “efelo ya kobatelama” mpo na ye.​—Masese 18:11.

Mpo na kokebisa bato na elimo wana ya lolendo, Yakobo akomaki boye: “Sikoyo, bóya, bino baoyo bolobaka ete: ‘Lelo to lobi tokokende na engumba oyo mpe tokolekisa mbula moko kuna, mpe tokomikɔtisa na mombongo mpe tokozwa benefisi mingi,’ nzokande boyebi te oyo bomoi na bino ekozala lobi. Mpo bozali londende oyo ebimaka mpo na mwa ntango moke mpe na nsima elimwaka.”​—Yakobo 4:13, 14.

Bosolo ya maloba wana emonanaki mpenza epai ya moto ya bomɛngo oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye. Nzambe alobaki na ye boye: “Zoba, na butu oyo bakosɛnga yo molimo na yo. Boye, nani akozwa biloko oyo otondisi esika moko?” Lokola londende oyo elimwe, moto yango ya bomɛngo akokufa liboso kutu amona ndenge mikano na ye ekokokisama. Liteya nini tozwi na lisolo yango? Yesu alobaki boye: “Ezali mpe bongo mpo na moto oyo abombi eloko ya motuya mpo na ye moko kasi azali moto ya bomɛngo te epai ya Nzambe.” Ozali “moto ya bomɛngo epai ya Nzambe”?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto