Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/8 lok. 30
  • “Bakokaki kobimisa bango mbala moko na bolɔkɔ”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bakokaki kobimisa bango mbala moko na bolɔkɔ”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/8 lok. 30

“Bakokaki kobimisa bango mbala moko na bolɔkɔ”

GENEVIÈVE DE GAULLE, mwana ya ndeko ya Charles de Gaulle, prezida ya kala ya France, ayebanaki na Batatoli ya Yehova na kaa ya bakangami ya Banazi ya Ravensbrük, na nɔrdi ya Allemagne. Akomaki maloba oyo ezali motó ya likambo ya lisolo oyo na mokanda moko na sanza ya Augusto 1945.

Bato oyo bazalaki na kaa ya bakangami ya Auschwitz, na Pologne, babimisamaki na mokolo ya 27 Yanuali 1945. Banda 1996, na Allemagne, yango ekómá mokolo ya kokanisa bato oyo bakufaki na boyangeli ya Hitler.

Na lisukulu moko oyo Peter Straub, prezida ya parlema ya etúká ya Bade-Wurtemberg, asalaki mokolo ya 27 Yanuali 2003, alobaki boye: “Bato nyonso oyo banyokwamaki mpo na lingomba na bango to mpo na makanisi na bango na makambo ya politiki mpe bandimaki ata kokufa na esika ya kotosa Hitler, ebongi tópesa bango limemya mingi mpenza. Na mangomba nyonso, kaka Batatoli ya Yehova nde baboyaki mpenza kondima makambo oyo Hitler azalaki kosɛnga: Batombolaki lobɔkɔ te mpo na kopesa Hitler losako. Baboyaki kolapa ndai ya kotosa ‘Mokonzi mpe Ekólo,’ baboyaki mpe kosala mosala ya soda mpe mosala mosusu mpo na kopesa ye mabɔkɔ. Bana na bango mpe bakɔtaki na Lisangá ya bilenge ya Hitler te.”

Yesu Klisto alobaki mpo na bayekoli na ye ete: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:16) Yango wana, nyonso oyo Batatoli ya Yehova basalaki ezalaki kaka mpo na losambo na bango. Straub abakisaki boye: “Batatoli ya Yehova, baoyo bilamba na bango ezalaki na elembo ya violɛ na kaa ya bakangami, bazalaki bato kaka moko oyo bakokaki koboya kobomama. Motatoli nyonso akokaki kobima na bolɔkɔ soki kaka atye sinyatire na mokanda oyo emonisi ete alongwe na lingomba wana.”

Batatoli mingi bandimaki ata moke te likanisi ya kolongwa na lingomba na bango. Yango wana, bato 1 200 kati na bango bakufaki na eleko oyo Banazi bazalaki na bokonzi. Bato 270 babomamaki mpo baboyaki kosala mosala ya soda. Basukaki kaka te na koloba ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”​—Misala 5:29.

Ndenge Ulrich Schmidt, prezida ya parlema ya etúká ya Rhénanie-du-Nord-Westphalie alobaki yango, Batatoli ya Yehova bazalaki kaka bato lokola bato nyonso. Mwa buku moko (Landtag Intern) oyo elobeli lisukulu na ye, ebengaki bango “bato lokola bato nyonso oyo, mpo na kotosa lisosoli na bango, bakangamaki na bindimeli na bango, bamimonisaki ete bazali bana-mboka ya mpiko, mpe lokola bazali baklisto, baboyaki makanisi ya Banazi.” Tokoki kondima mpenza ete Yehova Nzambe asepelaka na baoyo nyonso batikalaka sembo epai na ye na ntango ya mpasi. Masese 27:11 elobi boye: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.”

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa30]

Na ndingisa ya United States Holocaust Memorial Museum

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto