Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/8 lok. 32
  • Mobembo moko molai ezwi mbano

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobembo moko molai ezwi mbano
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/8 lok. 32

Mobembo moko molai ezwi mbano

LISOLO oyo euti na République démocratique du Congo. Elobeli Bandeko basi mibale ya libota moko oyo bazwaki ekateli ya kosala mobembo moko molai na bisika bitumba ezalaki mpo na kokende koyangana na liyangani moko ya Etúká na mboka Lisala, oyo ezalaki na motó ya likambo: “Pesá Nzambe nkembo.” Longola yango, mateya ya elimo mpe bokutani elongo na baninga baklisto elendisaki bango. Na liyangani yango, bazalaki kozela na motema likoló ete bakutana na momonisi ya biro ya Batatoli ya Yehova oyo ezwami na Kinshasa. Lokola bitumba ya bana-mboka ezalaki na ekólo na bango, bazalaki komonana lisusu te na bandeko ya biro uta bambula mingi, mpe basepelaki kosalela libaku wana mpo na komona bango.

Bandeko basi wana mibale basalaki mobembo moko ya bakilomɛtrɛ soki 300 na nzela ya zamba mpe bakatisaki bibale mibale na bwato, longwa na Basankusu mboka na bango tii Lisala. Mobembo yango eumelaki pɔsɔ misato. Bandeko basi wana mibale bazalaki kosala mosala ya ntango nyonso, moko asalaki mbula 3 mpe mosusu asalaki mbula 19, bazwaki mpe libaku ya kosakola nsango malamu ya bokonzi na mobembo na bango. Balekisaki ngonga soki 110 na mosala ya kosakola mpe bakabolaki batrakte 200 mpe bazulunalo 30 na bato oyo bazalaki kokutana na bango na nzela.

Na nzela ya mai, basengelaki koleka na bisika oyo bangubu mpe bangando ebimaka mbala na mbala. Lokola ezalaki likama, bakokaki te kotambola na butu na nzela ya mai! Balekaki lisusu na esika oyo basoda ebele bazalaki kofungola mikumba ya moto nyonso oyo azalaki koleka.

Atako mobembo yango ezalaki molai mpe ya kolɛmbisa, bandeko basi wana basepelaki na milende oyo basalaki. Bango nyonso bazalaki na botɔndi mingi mpe basepelaki kozala na liyangani oyo esalemaki na Lisala. Mitema na bango etondaki na esengo mpo na solo, mpe balendisamaki elongo na bandeko 7 000 oyo bayanganaki wana. Na nsima ya liyangani, bakutanaki lisusu na mikakatano yango na mobembo na bango ya bozongi mpe bakutaki mabota na bango na nzoto malamu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto