Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/7 nk. 3-4
  • Mateya ya solo—okoki kozwa yango wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mateya ya solo—okoki kozwa yango wapi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Lingomba
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mangomba nyonso mazali malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Lingomba ya solo​—Osili komona yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/7 nk. 3-4

Mateya ya solo—okoki kozwa yango wapi?

NA Tibet, mobali moko asimbi libaya oyo akɔtisi bapapye oyo akomi mabondeli na ye mpe azali kobalola libaya yango. Azali kokanisa ete ntango azali kosala bongo, azali kozongela mabondeli yango. Na Inde, na ndako moko ya monene, babongisi shambre moko mpo na kosala pûjâ (losambo oyo bato batumbaka mpaka ya malasi, bamemaka bafololo mpe basalaka makambo mosusu liboso ya bikeko ya banzambe mpe banzambe-basi). Na Italie, bankóto ya bakilomɛtrɛ longwa na Inde, na ndako-nzambe moko, mwasi moko afukami liboso ya ekeko ya Malia, mama ya Yesu, mpe azali kobondela ná sapɛlɛ na mabɔkɔ.

Mbala mosusu yo mpe omonaka ete losambo ezalaka na esika monene na bomoi ya bato. Buku moko (The World’s Religions​—Understanding the Living Faiths) elobi boye: “Losambo . . . ezalaki mpe ezalaka na esika monene na bomoi ya bato na mokili mobimba.” Na buku na ye (God—A Brief History), mokomi John Bowker alobi boye: “Ezali na mboka moko te oyo bato bayebi Nzambe te, mbala mingi bakanisaka ete ye nde akelá biloko nyonso mpe atambwisaka makambo nyonso. Ezali bongo ata na bamboka oyo bato mingi bakipaka makambo ya Nzambe te.”

Ya solo, losambo ezalaka na esika monene na bomoi ya bato mingi. Likambo yango ezali komonisa ete moto azali na bamposa ya elimo. Na buku na ye (The Undiscovered Self), Doktɛrɛ Carl Jung, moto ya mayele na pisikoloji, alobeli mposa oyo bato bazalaka na yango ya kosambela nguya moko boye oyo eleki bango mpe alobi ete “tokoki komona ete bato ya bileko nyonso bazalaki kokokisa mposa yango.”

Nzokande, bato mingi bandimaka Nzambe te, bakipaka mpe makambo ya losambo te. Bamosusu bakakatanaka to mpe baboyaka kondima ete Nzambe azali mpo mangomba oyo bayebi ezali kokokisa bamposa na bango ya elimo te. Kasi, bato nyonso, ata baoyo bandimaka te ete Nzambe azali, bakangamaka na mitinda oyo bandimaka lokola nde ezali losambo na bango.

Bato basali makambo ndenge na ndenge mpo na koluka kokokisa bamposa na bango ya elimo. Yango ebimisi ebele ya mangomba oyo ezali lelo na mokili. Na ndakisa, atako bato ya mangomba nyonso bandimaka ete ezali na nguya oyo eleki bango, bazalaka na makanisi ndenge moko te mpo na nguya yango mpe lolenge oyo ezali. Lisusu, mangomba mingi elobelaka lobiko to lisiko. Kasi, bato na bato bazali na ndenge na bango oyo balimbolaka lobiko yango mpe ndenge ya kozwa yango. Liboso ya ebele ya mateya wana, ndenge nini tokoki koyeba mateya ya solo oyo esepelisaka Nzambe?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto