Bato bazali koluka kimya ya solosolo
ALBERT afandaki na esengo na mwasi na ye na bana na bango mibale. Kasi, azalaki koyoka ete eloko moko ezangi na bomoi na ye. Ntango azalaki kobunda mpo na kozwa mosala, akómaki komipesa na politiki mpe kondima makanisi ya basosialiste. Akɔtaki kutu na parti ya Bakoministe ya mboka na bango.
Mosika te, Albert amonaki ete akozwa te eloko oyo azalaki koluka epai ya Bakoministe. Atikaki makambo ya politiki mpe amipesaki mobimba na libota na ye. Mokano ya bomoi na ye ekómaki ya koluka bolamu ya libota na ye. Atako bongo, Albert azalaki kaka koyoka ete eloko moko ezali kozanga; kimya ya solosolo ezalaki kaka ndɔtɔ mpo na ye.
Bato mingi mpe bamiyokaka lokola Albert. Bamilio ya bato bamekimeki makanisi ndenge na ndenge ya bato, ya filozofi, mpe ya mangomba mpo na koyeba ntina ya bomoi. Na mikili ya Mpoto, etuluku moko ya bilenge ya mobulu (Hippie) na bambula ya 1960, baboyaki kolanda bizaleli malamu oyo eyebani na bato nyonso. Bilenge mingi bakómaki koluka kimya mpe ntina ya bomoi na nzela ya bangi, bafilozofi ya Ba-Hippie mpe ya bakonzi ya lingomba. Nzokande, etuluku ya Hippie elongaki te kopesa kimya ya solosolo. Na esika ya kopesa kimya, etuluku yango ebimisaki nde bamɛli bangi mpe bilenge oyo bazalaki na basi mpe mibali kilikili, mpe yango ebebisaki bizaleli nyonso ya malamu.
Banda kala, ebele ya bato balukaka bolamu na nzela ya bozwi, ya bokonzi, to ya bakelasi milaimilai. Banzela nyonso wana ememaka bolamu te. Yesu alobaki ete: “Ata ntango moto azali na mingi bomoi na ye euti te na biloko oyo azali na yango.” (Luka 12:15) Koluka ntango nyonso bozwi, mbala mingi ememaka bolamu te. Biblia elobi boye: “Baoyo balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo bakweaka na kati ya komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na kati ya libebi mpe na likama. Mpo bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso, mpe na kokolisáká bolingo wana bamosusu . . . bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.”—1 Timote 6:9, 10.
Kasi, ndenge nini moto akoki kozwa kimya ya solosolo mpe koyeba ntina ya bomoi? Ezali nde likambo ya komekameka lokola moto oyo azali kolukaluka eloko moko na molili? Ezali bongo te. Ndenge tokomona yango na lisolo oyo elandi, mpo na kozwa kimya ya solosolo, esengeli kokokisa mposa moko ya ntina mingi, oyo kaka bato nde bazalaka na yango.
[Elilingi na lokasa 3]
Koluka bozwi, bokonzi, to kotánga bakelasi milaimilai nde ekosalisa yo ozwá kimya ya solosolo?