“Banyokolaki ye mpo na kondima na ye”
BAKONZI ya engumba Cernobbio, na nɔrdi ya Italie, batongaki monima na parkɛ moko ya engumba yango mpo na kokanisa bato oyo bakonzi ya kala batosaki ntomo na bango te. Moko na bitanda ya monima yango ezali na nkombo ya Narciso Riet. Baboti ya Narciso bazalaki bato ya Italie kasi ye abotamaki na Allemagne mpe akómaki Motatoli ya Yehova na bambula ya 1930. Batatoli ya Yehova banyokwamaki mingi ntango Hitler azalaki mokonzi mpo baboyaki kotosa ye na esika ya Yehova, Nzambe ya solo.
Ntango Narciso amonaki ete basoda ya Gestapo bayebi ete azali kokɔtisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na kaa ya bakangami, akimaki na Cernobbio. Kuna, akómaki kobongola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na monɔkɔ ya Italien mpe kokabola yango epai ya bandeko oyo bazalaki zingazinga. Kuna mpe, basoda ya Banazi bayebaki ete azalaki kosala mosala wana. Mokonzi moko ya Banazi ná basoda na ye bayaki na ndako ya Narciso, bakangaki ye, mpe bamonaki oyo bango babengaki “biloko mabe” oyo azalaki na yango: Babiblia mibale ná mwa mikanda oyo bakomelaki ye! Batindaki Narciso na Allemagne, batyaki ye na kaa ya bakangami ya Dachau mpe babomaki ye mwa moke liboso Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esila. Na etanda oyo ezali na nkombo na ye na engumba Cernobbio bakómi boye: “Banyokolaki ye mpo na kondima na ye.”
Kondima ya Narciso Riet mpe ya bankama ya Batatoli oyo Banazi banyokolaki elendisaka baklisto lelo oyo bátikala sembo epai ya Yehova, Nzambe kaka moko oyo ebongi básambela ye. (Emoniseli 4:11) Yesu alobaki boye: “Esengo na baoyo banyokwami mpo na boyengebene.” Nzambe akobosana misala ya bato yango te mpe akopesa bango mbano mpo na mpiko na bango.—Matai 5:10; Baebele 6:10.