Masolo ya Biblia elobaka mpenza solo?
CHAIM HERZOG, prezida ya kala ya ekólo Israël, ná Mordechai Gichon, profesɛrɛ ya kala ya arkeoloji na iniversite ya Tel Aviv, bakomaki buku moko oyo ezali na motó ya likambo Bitumba ya Biblia (na Lingelesi); kati na yango balobaki boye:
“Masolo ya Biblia oyo elimboli ndenge bitumba ya kala esalemaki . . . ekoki kozala masapo te. Na ndakisa, tokoki ata kokokanisa etumba ya Gideona ná Bamidyani mpe bikólo mosusu, lisolo oyo ezali na Basambisi 6-8, ná Etumba ya Troie, oyo mokomi Homère alobelaki na buku Iliade. Na Etumba ya Troie, lisolo emonisi ete bazalaki kobunda kaka na esika ya malamu, pembeni ya libongo moko mpe mosika te na engumba moko oyo ezali na bifelo ya makasi . . . Kasi, ezali bongo te na etumba ya Gideona oyo Biblia elobeli. Ndenge oyo lisolo elobeli bisika nyonso oyo batambolaki mpe bisika ya sikisiki oyo basoda ya ngámbo mibale babundaki, bibale oyo bakatisaki, bangomba oyo bamataki, mabwaku oyo balekaki mpe makambo nyonso oyo basoda na ye to Bamidyani basalaki, na ntaka mobimba ya kilomɛtrɛ 60, ekoki te kozala makambo oyo moto akanisi yango kokanisa . . . Yango wana, tokoki mpenza kondima ete makambo oyo esalemaki na bitumba oyo Biblia elobeli ezali makambo ya solo.”
Okoki komona bisika nyonso oyo Gideona ná basoda na ye balekaki na karte oyo ezali na nkasa 18 mpe 19 ya mwa buku ‘Voyez le bon pays.’a Lisolo ebandi ntango “Bamidyani nyonso mpe Baamaleki mpe bato ya epai ya ebimelo ya ntango bayanganaki mpe bakataki ngámbo ya Yolodani mpe basalaki molako na lobwaku ya Yizelele.” Gideona abengisaki bato ya mabota nyonso ya pembeni mpo bápesa ye mabɔkɔ. Etumba ebandaki na motó ya mai ya Halode tii na ngomba moke ya Mole, mpe na nsima bakatisaki lobwaku ya Yolodani. Nsima ya kolanda banguna na ngámbo ya Ebale Yolodani, Gideona alongaki bango.—Basambisi 6:33–8:12.
Karte yango oyo ezali na mwa buku ‘Voyez le bon pays’ ezali komonisa bamboka ya minene mpe bisika eyebani oyo balobeli na lisolo yango mpe ndenge mokili yango ezali. Karte mosusu (lokasa 15) emonisi mabelé ya mabota ya Yisalaele. Bakarte yango mibale ekoki kosalisa yo omona ete lisolo yango ezali mpenza solo.
Yango ezali komonisa likambo oyo nkɔndɔ Profesɛrɛ Yohanan Aharoni alobaki: “Na mikili oyo elobelami na Biblia, bamboka mpe bisika mosusu ezali mpenza na boyokani na masolo oyo balobeli; yango wana mpo na koyeba mikili yango, esengeli kolanda masolo oyo elobeli yango mpe ndenge moko, mpo na koyeba masolo wana, esengeli koluka koyeba mikili mpe bisika oyo elobeli.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
Karte na nsima: Euti na bakalati ya Pictorial Archive (Near Eastern History) Est. and Survey of Israel