Bazali kokokisa mposa ya bato na Macédoine
“LEKÁ na Masedonia kosalisa biso.” (Misala 16:9) Maloba wana ya moto moko oyo ntoma Paulo amonaki na emonaneli emonisaki ete esengelaki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe esakolama na teritware ya sika, na bingumba oyo ezali lelo na Grèce.
Lelo oyo, na ekólo Macédoine (Masedonia ya kala), ezali na Motatoli moko mpo na bato 1840. Bato mingi bayoká naino nsango ya Yehova Nzambe te. Bato ya ekólo yango bazali mpenza na mposa ya koyoka nsango ya kimya.—Matai 24:14.
Nzambe afungoli nzela mpo na kokokisa mposa yango. Mokolo moko, na sanza ya Novɛmbɛ 2003, bakambi ya ebongiseli moko (Centre macédonien pour la coopération internationale) basololaki na telefone na bandeko ya biro ya Batatoli ya Yehova na Skopje mpe bayebisaki bango ete basepeli kopesa bango esika moko na fware oyo ekoumela mikolo misato kobanda mokolo ya 20 Novɛmbɛ; bakoki kotya mikanda mpe biloko mosusu oyo ekosalisa bato báyeba mateya ya Batatoli ya Yehova. Yango ezalaki mpenza libaku ya kokutana na ebele ya bato oyo bayoká naino nsango malamu ya Bokonzi te!
Bandeko basalaki mosala makasi mpo na kobongisa esika ya kotya mikanda ndenge na ndenge ya Batatoli ya Yehova na monɔkɔ ya Macédonien. Batandaki mikanda yango mwa mingi mpo ete bato oyo basepeli bákoka kozwa yango. Yango epesaki bato mingi libaku ya kozwa ofele mai ya elimo oyo ekitisaka motema.—Emoniseli 22:17.
Mingimingi, bato bazalaki kosɛnga mikanda oyo ezali kolobela makambo etali bomoi na bango, na ndakisa Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi mpe Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.a Bato 98 bapesaki adrɛsi na bango mpo Batatoli ya Yehova bákende kotala bango. Mingi bakumisaki mosala malamu oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala mpe basepelaki na mikanda na bango.
Mobali moko ayaki na esika yango na mwana na ye ya moke. Atunaki bandeko soki bazali na mikanda mpo na bana. Batatoli balakisaki ye Mokanda mpo na masolo ya Biblia.b Afungolaki yango, abalolaki mwa bankasa mpe atunaki soki ezali ntalo boni. Ntango bayebisaki ye ete mosala ya Batatoli ya Yehova esimbami na makabo ya bolingo malamu, asepelaki lisusu koleka. (Matai 10:8) Alakisaki mwana na ye buku yango mpe alobaki boye: “Talá buku kitoko! Papa akobanda kotángela yo lisolo moko na mokolo!”
Profesɛrɛ moko ya filozofi ayaki mpe na esika oyo bandeko babongisaki. Azalaki koluka koyeba makambo ya mangomba, mingimingi, mateya ya Batatoli ya Yehova. Profesɛrɛ yango afungolaki buku L’humanité à la recherche de Dieu,c mpe alobaki boye: “Mokanda yango ekomami malamu mpenza! Ndenge mpenza nakanisaka.” Na nsima, bana-kelasi mingi ya eteyelo epai atángisaka bayaki mpe na fware yango mpe basɛngaki buku oyo profesɛrɛ azwaki. Balingaki koyekola buku yango. Balobaki ete akozanga te kosalela makambo oyo ezali na buku yango na mateya na ye na kelasi.
Esika oyo bandeko batandaki mikanda epesaki bato mosusu libaku ya liboso ya koyoka solo ya Biblia. Etuluku moko ya bilenge oyo bazali bababa balekaki mpe wana. Motatoli moko asololaki na bango mwa moke, mpe elenge mwasi moko asalisaki ye mpo na kobongola na bajɛstɛ. Ndeko yango asalelaki bililingi ya buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelod mpo na kolimbola ete Yesu abikisaki bato ya maladi, ata mpe bato oyo bakufá matoi. Basepelaki mingi “koyoka” elaka ya Biblia oyo elobi ete mosika te Yesu akosala makambo wana mpo na bato oyo bazali na bomoi na mikolo na biso. Mingi kati na bango bazwaki mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpe bayokanaki ete Motatoli moko oyo ayebi bajɛstɛ akendaka koyekola na bababa yango.
Longola monɔkɔ ya Macédonien, mikanda mosusu ezalaki na Albanais, na Lingelesi, mpe na Turc. Mobali moko oyo alobaka Macédonien te asɛngaki mikanda ya Lingelesi. Ntango bandeko bapesaki ye mwa banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!, ayebisaki bango ete alobaka monɔkɔ ya Turc. Ntango balakisaki ye mikanda na monɔkɔ ya mboka na ye, akamwaki mingi! Amonaki mpenza ete Batatoli ya Yehova balingaka kosalisa bato nyonso.
Fware wana epesaki nzela ya kopesa litatoli ya malamu mpenza, mpe ezalaki esengo na komona ebele ya bato bazali kosepela na solo ya Biblia! Ya solo, Yehova afungoli nzela mpo nsango malamu esakolama mpenza na Macédoine.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nyonso ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Nyonso ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Nyonso ebimisami na Batatoli ya Yehova.
d Nyonso ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Bililingi na lokasa 9]
LIKAMBO MOKO MONENE!
Milende oyo bandeko bazali kosala mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi, ebimisaki likambo moko ya monene na mokolo ya 17 Mai 2003: bafungolaki biro ya Batatoli ya Yehova na Skopje. Mosala ya kobakisa bandako ya sika eumelaki mbula mibale; sikoyo ekómi monene mbala minei koleka ndenge ezalaki.
Ezali na bandako misato; moko mpo na mosala ya kobongola mikanda, moko mpo na misala mosusu, mpe mosusu mpo na bashambre, kuku, mpe esika ya kosukola bilamba. Ndeko Guy Pierce, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisukulu ya bofungoli. Bapaya oyo bakendaki na likita ya bofungoli bautaki na mikili 10. Bango nyonso basepelaki mingi komona bandako kitoko oyo etongamaki.
[Karte na nkasa 8 mpe 9]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
BULGARIE
MACÉDOINE
Skopje
ALBANIE
GRÈCE
[Elilingi na lokasa 8]
Skopje, Macédoine