Moto moko ya komikitisa na Afrika oyo alingaki liloba ya Nzambe
BATO oyo bayaka na Afrika bakamwaka mingi komona ete ezalaka mpasi te kobanda masolo ya Biblia na bato. Mituna lokola “Bokonzi ya Nzambe ezali nini?” to “Kozanga bilei, maladi, bitumba, mpe kobomana ekosila?” etindaka bato báfungola mpenza matoi mpo na koyoka. Bato mingi basepelaka ete mopaya alakisa bango biyano na kati ya Biblia. Mbala mingi, yango esalaka ete bábanda boyekoli ya Biblia. Bayekoli ya Biblia bakolaka na elimo mpe bazwaka batisimo.
Balobeli moto ya Afrika ya liboso oyo asalaki bongo na Misala 8:26-40. Ezali Moetipia oyo akendeki na Yelusaleme mpo na kosambela Yehova, Nzambe ya solo.
Ndenge balakisi yango na elilingi oyo ezali na nse awa, Moetipia yango azalaki likoló ya likalo na ye mpe azalaki kozonga na mboka na ye, afungolaki rulo moko mpe azalaki kotánga yango. Moto moko apusanaki pene na ye mpe atunaki ye boye: “Ozali mpenza koyeba makambo oyo ozali kotánga?” Moetiopia yango andimaki na komikitisa nyonso ete asengeli na lisalisi mpe abondelaki moto yango, elingi koloba Filipo oyo azalaki mopalanganisi ya nsango malamu ete amata na likalo na ye. Na nsima, asɛngaki na Filipo alimbwela ye eteni ya Makomami oyo autaki kotánga. Filipo alimbwelaki ye ete esakweli yango ezalaki kolobela liwa ya Masiya, Yesu Klisto oyo autaki kokufa. Filipo alobelaki mpe makambo mosusu ya “nsango malamu oyo etali Yesu,” na ntembe te alobelaki mpe lisekwa ya Yesu.
Ntango ayokaki makambo kitoko wana, Moetiopia yango asepelaki kokóma moyekoli ya Yesu mpe atunaki boye: “Nini ezali kopekisa ngai kobatisama?” Nsima ya kozwa batisimo, moto yango ya Afrika azongaki na mboka na ye na esengo, mpe Biblia elobeli ye lisusu te na nsima.
Batatoli ya Yehova bazali lelo oyo kosalisa bamilio ya bato na mokili mobimba báyekola “nsango malamu” yango oyo Moetipia ayokaki. Bato soki milio 6 bazali koyekola Biblia na bandako na bango ofele.