Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/3 lok. 31
  • Nini ekokómela mabelé?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini ekokómela mabelé?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/3 lok. 31

Nini ekokómela mabelé?

Zulunalo moko ya Canada (Globe and Mail) elobi boye: “Banda kala, bato babangaka makama lokola mpela mpe kozanga ya mai. Kasi, lelo oyo, misala ya bato ezali kobebisa mopɛpɛ, mai, zamba.” Ebongiseli moko ya ONU (Programme des Nations unies pour l’environnement) ebimisaki lapolo moko oyo epekisaki bato batika kosala misala oyo ezali kobebisa mopɛpɛ, mai, zamba mpe bongo na bongo, liboso makambo ebeba. Klaus, mokambi ya ebongiseli yango alobi boye: “Emonani mpenza ete, tii tókóma na mobu 2032, makambo oyo tozali kosala to koboya kosala ekoki kobongisa to kobebisa mabelé.”

Banda ebongiseli yango esalemaki na mobu 1972, mwa mbongwana esalemi mpo na oyo etali kobatela mai, mopɛpɛ, zamba. Zulunalo moko (The Toronto Star) emonisi ete “na Mpoto mpe na Amerika ya nɔrdi, mopɛpɛ mpe mai ya bibale ebongi mwa ndambo, mpe lokola bapekisi kosalela bagaze, yango esali ete ozone, oyo ebatelaka biso na ngɛngɛ ya moi ebonga mwa moke.” Bibongiseli oyo ebatelaka bazamba, na ndakisa oyo ezali na bikólo lokola Canada, Finlande, Norvège, mpe na États-Unis, “bazali kosala nyonso mpo na kokitisa moke makama oyo eutaka na kosalela banzete na lolenge ya mabe.” Nzokande, lapolo ya ebongiseli yango ya ONU emonisi ete “soki mposa ya kozwa biloko mingi ekiti te, mpe bingumba ezali se kobakisama, yango ekozala likama mpenza mpo na banyama, mpe mpo na bazamba.” Zulunalo moko (Globe) elobaki boye: “Mai mingi ya bibale na mokili ebebi to mpe ekómi kokauka mingi. Bato mingi (40%) oyo bafandaka na bikólo 80, bazali kokelela na mai.”

Toepfer alobaki ete: “Soki tosali makasi tokolonga.” Na nsima abakisaki boye: “Tosengeli kozala na programɛ ya malamu . . . Kozala na mikano ya malamu . . . Mpe lisusu, tólobelaka makambo polelepolele.” Kasi, elikya nini tokoki kozala na yango soki bakonzi bazali koboya kosala makambo oyo ekoki kobongisa mabelé?

Tóbwaka elikya te, mpamba te Yehova Nzambe ‘ayebisi polele mokano na ye’ mpe ‘akokokisa yango.’ Ya solo, Yehova ayebisi polele ete ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.’ (Emoniseli 11:18) Lisusu, Nzambe apesi elaka ya sikisiki ete mabelé ekozonga malamu. Lisobe ekobimisa fololo. (Yisaya 35:1) Biloko ya kolya ekozala beboo. Mai ya bibale ekobeba lisusu soki moke te. (Nzembo 72:16; 98:8) Nzambe apesi ndanga ete akopambola bikelamu nyonso ya bomoi awa na mabelé.​—Nzembo 96:11, 12.

[Elilingi na lokasa 31]

Fɔtɔ ya NASA

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto